Nsango ya Teokrasi
Bénin: Na sanza ya Novɛ́mbɛ, basakoli nyonso bazalaki 5 331, mpe yango ezalaki mbala ya 59 oyo bazwaki motángo ya sika ya basakoli.
Chypre: Na sanza ya Novɛ́mbɛ, basakoli nyonso bazalaki 1 758; yango ezalaki bokoli ya basakoli mibale likoló na monkama. Babongisi-nzela ya sanza na sanza bazalaki 136; yango mpe ezalaki motángo ya sika.
Bisanga Salomo: Na sanza ya Novɛ́mbɛ, motángo ya sika ya basakoli ezalaki 1 393.
Inde: Na sanza ya Novɛ́mbɛ, basakoli nyonso bazalaki 18 077 mpe yango emonisi bokoli malamu na mosala ya kosakola. Yango ezalaki mbala ya 39 oyo bazwaki motángo ya sika ya basakoli.
Liberia: Na sanza ya Novɛ́mbɛ, basakoli nyonso bazalaki 2 120 mpe yango ezalaki motángo ya likoló mpenza na mboka yango.
Taïwan: Mwayene ya basakoli na mbula oyo ya mosala ezali 3 516, mpe yango emonisi bokoli ya basakoli 6 likoló na monkama koleka mwayene ya basakoli na mbula ya mosala oyo euti koleka.