Nsango ya Teokrasi
Albanie: Na Augústo, basakoli bazalaki 600. Ezali bongo bokóli ya mbala ya 28.
Angola: Na nsuka ya mbula ya mosala, motángo ya basakoli ekómaki na 26 129. Babongisi-nzela ya sanza na sanza bazalaki 1 309. Na Augústo, basakoli basalaki na mwayene bangonga 15 na mosala ya kosakola mpe batambwisaki boyekoli ya Biblia 2 na mosakoli mokomoko.
Chili: Na Augústo, motángo ya sika ya basakoli ekómaki na 50 283. Ezali mbala ya liboso ete motángo ya basakoli eleka 50 000. Basakoli basalaki na mwayene bangonga 12 na mosala ya kosakola mpe batambwisaki boyekoli ya Biblia 63 732.
Grande-Bretagne: Tozali na esengo ya koyebisa bino ete na Augústo motángo ya sika ya basakoli 132 440 ekokisamaki. Motángo yango emonisi bokóli ya 2 % na bokokanisi na mosala ya mbula eleki.