Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/10 nk. 3-5
  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Sikoyo nde ntango ya kosakola!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 5/10 nk. 3-5

“Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”

1. Ndeko mwasi moko alobaki nini mpo na mosala na ye ya mobongisi-nzela?

1 Ndeko mwasi moko nkombo na ye Kathe Palm alobaki boye: “Nandimi te ete mosala mosusu ekokaki kopesa ngai esengo to kolendisa ngai na elimo lokola mosala oyo.” Ndeko yango asalaki mosala ya mobongisi-nzela na molende na boumeli ya bambula mingi; atambolaki ekólo Chili mobimba mpo na kopesa litatoli. Mbala mosusu ndeko moko oyo ayebi matomba ya mosala ya ntango nyonso alobaki na yo ete: “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”

2. Mpo na nini mosala ya Nzambe epesaka esengo mingi?

2 Mosala oyo epesaka esengo: Yesu, Ndakisa na biso, azalaki koyoka esengo mingi na kosala mokano ya Tata na ye. (Yoa. 4:34) Yango wana, Yesu alobaki na bosembo ntango ateyaki bayekoli na ye ete esengo ya solosolo eutaka na mosala oyo eyokani na losambo ya Yehova. Toyokaka esengo mingi ntango tozali komipesa na misala oyo esepelisaka Yehova. Longola yango, soki tozali kosalela ntango, makasi, mpe biloko na biso mpo na kosalisa basusu, esengo na biso ebakisamaka.​—Mis. 20:31, 35.

3. Makambo nini ya esengo tokoki kozwa soki tozali kosakola mingi?

3 Soki tozali kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola, tokozwa mpe mabaku mingi ya koyoka esengo ya kokutana na bato mpe kobanda koyekola na bango Biblia. Ata na bisika oyo emonanaka ete bato mingi basepelaka te, tokoki komona ete soki tomeseni na mosala yango mpe tokómi kosalela mayele ndenge na ndenge, bato mingi bakondima nsango malamu koleka ndenge oyo tokokaki kokanisa. Babongisi-nzela bakoki kosalela formasyo kitoko oyo bazwaka na Eteyelo ya babongisi-nzela oyo bakɔtaka nsima ya kosala mosala yango mbula mobimba. (2 Tim. 2:15) Soki tozali kolendendela, mbala mosusu tozali nde kolona mboto ya solo oyo ekobota mbuma na mikolo ekoya.​—Mos. 11:6.

4. Likambo nini bilenge oyo bakómi pene na kozwa diplome basengeli kotalela?

4 Bilenge: Ntango bokómi pene ya kosilisa eteyelo ya ntei, bokanisaka malamu makambo oyo bokosala na bomoi na bino? Lokola bozali naino kotánga, kelasi nde ezali kozwa bino ntango mingi. Ndenge nini bokosalela ntango mingi oyo bokokóma na yango soki bozwi diplome? Na esika ya koluka mosala oyo ekobanda kozwa mokolo mobimba, ezali malamu bómityela mokano ya kozala babongisi-nzela! Makambo oyo bokoyekola na mosala yango, na ndakisa koyeba kopesa litatoli epai ya bato ya ndenge na ndenge, kolonga makambo oyo ezalaki mpasi mpo na bino, koyeba komityela mibeko, mpe kokóma na mayele ya koteya, nyonso wana ekosalisa bino bomoi na bino mobimba.

5. Ndenge nini baboti mpe bandeko mosusu na lisangá bakoki kolendisa mosala ya mobongisi-nzela?

5 Baboti, bozali kokokisa mokumba na bino ya kolendisa bana na bino bápona mosala ya ntango nyonso? Maloba na bino mpe ndakisa na bino ekoki mpenza kosalisa bango bátya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Ndeko moko, nkombo na ye Ray, oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango asilisaki eteyelo ya ntei, alobi boye: “Mama na ngai azalaki ntango nyonso komona ete mosala ya mobongisi-nzela epesaka moto esengo mingi.” Na maloba mpe misala na bango, bandeko nyonso na lisangá bakoki kolendisa bilenge bápona mosala ya mobongisi-nzela. Jose, ndeko moko ya ekólo Espagne, alobi boye: “Na lisangá na biso, bandeko nyonso bazalaki kotalela mosala ya mobongisi-nzela lokola mosala oyo eleki malamu mpo na bilenge. Ndenge bazalaki kokumisa mosala ya mobongisi-nzela mpe batoli oyo bapesaki ngai esalisaki ngai nazala na mokakatano te mpo na kobanda mosala yango.”

6. Tosengeli kosala nini soki tozali na mposa ya mosala ya mobongisi-nzela te?

6 Kolonga makambo oyo ekoki kopekisa yo: Okosala nini soki olobi ete, ‘Nazali na mposa ya kozala mobongisi-nzela te.’ Soki makanisi yango nde eyelaka yo liboso, bondelá Yehova mpe yebisá ye boye: ‘Nayebi te soki nakoki kozala mobongisi-nzela, kasi nalingi kosala oyo ekosepelisa yo.’ (Nz. 62:8; Mas. 23:26) Na nsima, luká litambwisi na ye na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye. Babongisi-nzela mingi ‘bamekaki’ mosala yango na ndenge basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi; na nsima, esengo oyo bayokaki etindaki bango básɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.​—Nz. 34:8.

7. Tokoki kosala nini soki tozali kobanga ete tókokisa te ngonga 70 oyo esɛngamaka sanza na sanza?

7 Okoki kosala nini soki ozali kobanga ete okokisa te ngonga 70 oyo esɛngamaka? Ekozala malamu osolola na babongisi-nzela oyo bazali na bomoi lokola ya yo. (Mas. 15:22) Na nsima, meká kosala programɛ ndenge na ndenge oyo ekoki kosimba mpo na yo. Ntango mosusu okomona ete kosomba ntango na makambo mosusu oyo ezali na litomba mpenza te mpo na kosakola mingi ekosalisa yo mpenza.​—Ef. 5:15, 16.

8. Mpo na nini tosengeli kotalelaka bomoi na biso mbala na mbala?

8 Talelá lisusu bomoi na yo: Bomoi ya moto ebongwanaka. Ezali malamu kotalelaka bomoi na yo mbala na mbala. Na ndakisa, etikali moke ozwa pansiɔ? Randy, oyo asɛngaki pansiɔ mwa bambula liboso akokisa mbula ya kozwa pansiɔ, alobi boye: “Ekateli yango esalisaki ngai nabanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza ná mwasi na ngai, mpe yango epesaki biso likoki ya kokende kosakola na esika oyo basakoli bazali mingi te. Ekateli na ngai ememeli ngai ebele ya mapamboli, kasi oyo eleki nyonso ezali lisosoli ya malamu.”

9. Likambo nini babalani bakoki kotalela?

9 Nsima ya kotalela bomoi na bango malamu, babalani mosusu bamonaki ete ezali na ntina te bango mibale bázala na mosala ya mosuni. Ya solo, yango ekoki kosɛnga kotika makambo mosusu, kasi komipimela ndenge wana ezali na ntina mingi. John, ndeko oyo mwasi na ye autaki kolongwa na mosala mpo akóma na ntango mingi ya kosakola, alobi boye: “Ezali na esengo te oyo eleki esengo ya koyeba ete mwasi na ngai azali kolekisa mokolo na makambo ya elimo.”

10. Nini etindaka bakristo bátalela soki bakoki kozala babongisi-nzela?

10 Emonisaka bolingo mpe kondima: Yehova apesi mokomoko na biso libaku ya kosala mosala oyo ezali na ntina koleka misala nyonso: mosala ya kosakola. Etikali moke ebongiseli oyo ebomama, mpe kaka bato oyo bazali kobelela nkombo ya Yehova nde bakobika. (Ro. 10:13) Soki motema na biso etondi na bolingo mpe na botɔndi mpo na oyo Yehova asali mpo na biso, yango ekopesa biso mposa ya kotosa etinda ya kosakola na molende, oyo Mwana na ye apesi. (Mat. 28:19, 20; 1 Yoa. 5:3) Longola yango, kondima ete tozali na mikolo ya nsuka ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki na mosala yango na ntango oyo etikali, na esika tósalela mokili na makambo nyonso.​—1 Ko. 7:29-31.

11. Osengeli kokanisa nini soki moto alobi na yo ete okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu?

11 Kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza ezali te kondima mokumba moko oyo ebongiseli ya Yehova esɛngi; kasi ezali ndenge ya komonisa ete tomipesi na Nzambe. Soki moto moko alobi na yo ete okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu, talelá yango lokola elendiseli. Talelá malamu soki okoki kokóma mobongisi-nzela, mosala oyo epesaka mpenza esengo, mpe bondelá Yehova mpo na yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Baboti, bozali kokokisa mokumba na bino ya kolendisa bana na bino bápona mosala ya ntango nyonso?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Yehova apesi mokomoko na biso libaku ya kosakola, mosala oyo ezali na ntina koleka misala nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto