Ozalaka na komande ya sikisiki ya bazulunalo?
1 Naino ekómela yo te ete okende na makita ya mosala ya kosakola mpe na nsima omona ete ozali na bazulunalo te na sakosi na yo? Na yango, ndenge nini okoki kopɛngola likambo yango mpe kosalela malamu bazulunalo na yo? Olendisami na kozala na komande ya sikisiki ya bazulunalo. Salá komande oyo ebongi epai ya ndeko oyo atalelaka bazulunalo. Sɛngá motuya ya sikisiki ya bazulunalo oyo okobanda kozwa na nimero nyonso. Na boye, yo na libota na yo bokozala ntango nyonso na bazulunalo oyo ekoki na bino.
2 Mpo na nini te kozala na komande ya sikisiki ya bazulunalo? Yango ekolendisa yo na kokabola bazulunalo pɔsɔ na pɔsɔ, mpe ekomemela yo esengo mingi. Soki ozali na komande ya sikisiki, talelá yango lisusu mpo na koyeba soki ozali kozwa motango ya bazulunalo oyo osengeli na yango mpo na sanza mobimba na mosala ya kosakola. Pɔsɔ na pɔsɔ, osengeli kozwaka bazulunalo na ndenge oyo osɛngaki na komande na yo. Yango ezali mpenza lisɛngami. Soki okozala na lisangá te mpo na ntango molai, yebisá mosaleli ya misala oyo atalelaka bazulunalo, soki olingi, ete apesa moto mosusu bazulunalo na yo kino ntango okozonga.
3 Osengeli mpe kozala na mokolo ya sikisiki mpo na kokabola bazulunalo. Osimbaka ebongiseli ya kokabola bazulunalo pɔsɔ na pɔsɔ? Lolenge ya kosala yango emonisami na Calendrier de Témoins de Jéhovah 1999, yango ekozala mokolo ya pɔsɔ nyonso! Tótalela kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! lokola likambo ya mpamba te. Soki tozali kosala milende ya kosangana mingi mpenza na mosala ya kokabola bazulunalo, ‘tokomema nsango malamu na kosepela’ epai na bazalani na biso.—Yis. 52:7, NW.