Okoki kopesa lisungi na yo?
1 Ntoma Paulo apesaki bandeko ya lisangá toli ete: ‘bábatelanaka.’ (1 Kol. 12:25) Na yango, tosengeli kotyelanaka likebi mpenza mpe kozala pene ya kopesa lisungi ya bolingo soki mposa emonani. Na ndakisa, bandeko na biso mosusu ya basi na elimo bazali kobɔkɔla bana bango moko kati na solo. Bandeko basi yango bazali kokokisa mokumba monene mpo na kobɔkɔla bana na bango na elimo. Na ntembe te, ebongi ete tólendisa bango mpe tósalisa bango ‘na kotaleláká bamposa na bango.’ (Lom. 12:13a, NW) Okoki kosunga bango?
2 Ndenge nini okoki kopesa lisungi: Komema na motuka na yo bato ya libota oyo bazwaka bisi mpo na kokende na makita to na mayangani, yango ekosalisa bango bábomba mwa mosolo oyo balingaki kobimisa. Kobatela mwana moke ya mama moko wana makita ezali kosalema ekosalisa ye azwa litomba na masolo oyo ezali kosalema. Ndenge moko mpe, kosimbela ye bana na ye ya mike ntango abimi na bango na mosala ya kosakola ekoki kobɔndisa ye. Kosepela na bana—kosala na bango boninga—ekoki kozala na bopusi malamu mpo na bilenge. Ntango mosusu, okoki kobénga libota oyo ezali na moboti bobele moko ete báya kosangana na boyekoli ya libota na bino ekolendisa bango na elimo.
3 Zalá na mayele: Tosengeli kozala na bokɛngi, tóluka te kopesa lisungi na biso na makasi ata epai ya moto oyo azali na mposa na yango te. Tosengeli mpe te koluka kokɔta na makambo ya bato ya libota moko ntango tozali kosalisa bango. Ya solo, bandeko basi mpe babalani babongi mpo na kosalisa ndeko mwasi oyo azali na mposa ya lisungi.
4 Baklisto nyonso balendisami na ‘kolanda nzela ya koyambana’ bamoko na bamosusu. (Lom. 12:13b, NW) Kopesa lisungi na biso epai ya bandeko na biso ya elimo ezali lolenge moko ya kolakisa bolingo na biso ya boklisto oyo tozali na yango kati na biso.—Yoa. 13:35.