Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/99 lok. 1
  • Kelasi mpe mikano na yo ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kelasi mpe mikano na yo ya elimo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
    Lamuká!—1998
  • Bótánga kelasi malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 8/99 lok. 1

Kelasi mpe mikano na yo ya elimo

1 Kotánga kelasi malamu ntango ozali naino elenge ekosalisa yo oyeba kotánga mpe kokoma malamu mpe oyeba makambo ya geografi, ya istware, ya matematiki mpe ya siansi. Na ntango wana, okoki koyeba ndenge ya kokanisa malamu, kotalela makambo malamumalamu, koyeba kosilisa mikakatano, mpe kobimisa makanisi ya malamu. Boyebi motindo oyo ekosalisa yo na bomoi na yo mobimba. Ndenge nini kotánga kelasi ekoki kotalela mikano na yo ya elimo mpe kosalisa yo ozwa ‘mayele malamu mpe makoki ya kososola’?—Mas. 3:21, 22.

2 Zwá mayele oyo ekosalisa yo osalela Nzambe malamu: Ntango ozali na kelasi, landá malamu mateya oyo ezali kopesama mpe salaká badevuare na yo malamu. Soki omeseni kotánga mpe koyekola, okozala na makoki mingi ya kotalela Liloba ya Nzambe yo moko mpe okozala makasi na elimo. (Mis. 17:11) Soki oyebi makambo mingi ekosalisa yo osolola na bato bauti bisika ndenge na ndenge, oyo basepelaka na makambo ndenge na ndenge, mpe baoyo bazali na bindimeli mosusu soki okutani na bango na mosala ya kosakola. Mateya oyo ozali kozwa na kelasi ekosalisa yo ntango okobanda kokokisa mikumba na yo ya boklisto na kati ya lisangá ya Nzambe.—Kokanisá na 2 Timote 2:21; 4:11.

3 Yekolá mosala oyo ekosalisa yo: Soki omipesi na kelasi, okozwa mpe mayele ya kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na yo nsima ya kozwa diplome. (Kokanisá na 1 Timote 5:8.) Poná section ya malamu. Na esika opona section oyo mosala na yango emonanaka mingimingi te, okoki kolanda section oyo eyekolisaka mosala to epesaka mayele oyo ekosalisa yo ete ozwa mosala ya malamu. (Mas. 22:29) Kelasi ya ndenge wana ekosalisa yo ete okokisa bamposa na yo soki ozwi ekateli ya kokende kosala epai mposa ezali monene.—Kokanisá na Misala 18:1-4.

4 Kotánga kelasi malamu ekosalisa yo osala mosala na yo ya kosakola malamu koleka. Salá makasi mpo na kozwa mayele oyo osengeli na yango mpo na kokokisa bamposa na yo wana ozali kokende liboso na kati ya mosala na yo mpo na Yehova. Na lolenge yango mayele oyo ozwi na kelasi ekosalisa yo okokisa mikano na yo ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto