Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/97 lok. 2
  • Bótánga kelasi malamumalamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bótánga kelasi malamumalamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Kelasi mpe mikano na yo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Bilenge oyo bazali kokanisa Mozalisi na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 9/97 lok. 2

Bótánga kelasi malamumalamu

1 Talá eleko ya mobu oyo bilenge mingi bamonaka mpasi: “Ntango ya kozonga na kelasi ekoki!” Bozongi ya kelasi ezalaka mbala mosusu mokakatano monene oyo esengeli kolónga yango mpe ebangisaka, kasi epesaka mpe matomba mingi na bilenge oyo bazali kosala makasi mpo na kosalela malamu bambula oyo bazali na kelasi.

2 Kobongisama malamu na kelasi ezali kopesa nzela na bokóli malamu na elimo. Mosala oyo mokóló akoki kosala ezali kotalela mingi oyo asalaki na bolenge na ye. Ata mpo na makambo matali kelasi, “soko moto akokóna nini, akobuka bobole yango.” (Gal. 6:7) Bilenge oyo bamipesi na kelasi bakoki kozwa makoki oyo ekokómisa bango na ntina mingi mpo na Yehova.

3 Ebongi kokanisa liboso mpo na kosala liponi malamu na makambo matali boyekoli. Baboti basengeli kosalisa bana na bango na kopona biteyelo oyo ekoki kopesa bana na bango mateya mabongi mpenza mpo na kokokisa mikano ya elimo. Na kokólisáká makoki na bango, bilenge bakozwa nzela ya kokokisa bamposa na bango wana bazali kosala lokola babongisi-nzela. Boyebi oyo bazwi na kelasi esengeli kosalisa bango mpo na kokumisa Yehova ezala ata na esika nini bazali kosalela ye.

4 Bilenge, bósala nyonso ete bótánga kelasi malamumalamu, na kozaláká na mokano ya bomoi eleki malamu na mosala ya bulɛɛ, kasi na mosala ya mokili te. Bósala makasi ete bósalela bomoi na bino mpo na mokano ya Yehova. Ezali na lolenge yango nde bokolónga na banzela na bino, mpo na lokumu ya Yehova.​​​—Nz. 1:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto