Ndenge nini okoki kosolola na moto oyo andimaka Nzambe te?
1 Mwasi moko profesɛrɛ, mpe moto ya ekólo Pologne, ayebisaki ndeko mwasi moko misionɛrɛ na Afrika ete: “Nandimaka Nzambe te.” Atako bongo, ndeko mwasi asololaki na ye mpe apesaki ye buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Na pɔsɔ oyo elandaki, ntango ndeko mwasi yango azongelaki ye, mwasi yango ayebisaki ye ete: “Sikoyo nakómi kondima Nzambe!” Atángaki buku Création mobimba mpe asɛngaki ndeko mwasi ete abanda koyekola na ye Biblia. Ndenge nini okoki kopesa litatoli epai ya bato oyo balobaka ete bandimaka Nzambe te? Talelá liboso makambo ndenge na ndenge oyo etindaka bato báloba bongo.
2 Makambo oyo etindaka bato báboya kondima: Bato nyonso oyo baboyaka kondima Nzambe babɔkwamá bongo te. Mingi bazalaki kala na lingomba moko mpe bazalaki kondima ete Nzambe azali. Kasi, bokɔnɔ, to mikakatano ya libota to bamonaki ete basalelaki bango makambo na bosembo te yango elɛmbisaki kondima na bango. Mpo na bato mosusu, mateya oyo bayekolaki na iniversite ebebisaki makanisi na bango mpo na Nzambe. Talá bandakisa oyo elandi, bato yango bazalaki kondima Nzambe te, kasi na nsima babandaki kondima Yehova Nzambe makasi mpe bakómaki Batatoli na ye.
3 Mwasi moko na engumba Paris abotamá ebɔsɔnɔ. Atako azwaki batisimo na Lingomba ya Katolike, ye moko azalaki koloba ete andimaka Nzambe te. Ntango atunaki bamamelo mpo na nini Nzambe atikaki ete abotama ebɔsɔnɔ, eyano na bango ezalaki ete: “Mpo alingaka yo.” Aboyaki kondima likanisi yango, mpo elongobani te. Tótalela lisusu ndakisa ya elenge mobali moko na ekólo Finlande, ye azwaki bokɔnɔ mabe ya kolɛmbisa misisa libela mpe asengelaki bobele kofanda na kiti ya bibɔsɔnɔ. Mama na ye amemaki ye epai ya moto moko ya Lingomba ya Pantekote oyo azalaki koloba ete azali na nguya ya kobikisa bato ya maladi. Kasi alongaki te kobikisa ye. Mpo na yango, elenge mobali yango azalaki kosepela lisusu na Nzambe te mpe azalaki lisusu kondima ye te.
4 Mobali moko na ekólo Honduras abɔkwamaki na Lingomba ya Katolike kasi ayekolaki philosophie socialiste mpe mateya oyo elobaka ete Nzambe azali te (athéisme). Lokola mateya ya iniversite etindaki ye na kondima ete bato bautaki na evolisyo, atikaki kondima Nzambe. Ndenge moko mpe, mwasi moko na États-Unis abɔkwamaki na Lingomba ya Méthodiste. Na iniversite, alandaki kelasi ya psychologie. Yango esalaki nini na bindimeli na ye? Alobi ete: “Bobele nsima ya sanza misato mpamba (été) babebisaki kondima nyonso oyo nazalaki na yango na lingomba.”
5 Tósimba mitema ya bato ya sembo: Bato mingi oyo balobaka ete bandimaka Nzambe te bakoki kosepela soki bayebi ete likoki ya kosilisa mitungisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, mobulu na libota, kozanga bosembo, mpe bongo na bongo, ezali. Basepelaka mingi kozwa biyano na mituna lokola oyo: ‘Mpo na nini mabe ezali na mokili?’ ‘Mpo na nini makambo mabe ekómelaka bato malamu?’ mpe ‘Ntina ya bomoi ezali nini?’
6 Babalani mibale oyo bafandaka na ekólo Suisse bayekolaki banda bomwana ete Nzambe azali te. Ntango balobelaki bango mateya ya solo mpo na mbala ya liboso, baboyaki. Kasi bakutanaki na mikakatano makasi na libala na bango mpe balingaki koboma libala. Ntango Batatoli bayaki kotala bango lisusu, balakisaki bango na kati ya Biblia ndenge nini bakoki kosilisa mikakatano na bango. Babalani yango bakamwaki mpenza na komona toli malamu oyo ezali na kati ya Makomami, mpe bandimaki koyekola Biblia. Libala na bango ezongaki malamu, bakolaki malamu na elimo, mpe bazwaki batisimo.
7 Makambo oyo okoki koloba na moto oyo andimaka Nzambe te: Soki moto moko ayebisi yo ete andimaka Nzambe te, luká koyeba ntina oyo ezali kotinda ye ete aloba bongo. Ezali mpo na kelasi oyo atángá, makambo oyo akutaná na yango na bomoi, to nde bokosi mpe mateya ya lokuta oyo amonaki na mangomba? Okoki kotuna ye boye: “Ozalaka na likanisi oyo banda kala?” to “Nini ezali kotinda yo na kokanisa bongo?” Eyano na ye ekosalisa yo oyeba likambo oyo okoloba. Soki ezali na bisika oyo esengeli kopesa bindimiseli ya nguya, mbala mosusu okoki kosalela buku Y-a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?
8 Okoki kolanda lisolo na moto oyo andimaka Nzambe te na kotunáká ye motuna lokola oyo:
◼ “Osilá komituna motuna oyo: ‘Soki Nzambe azali, mpo na nini bampasi ezali mingi na mokili mpe bosembo ezali te?’ [Tiká ye ayanola.] Olingi nalakisa yo likanisi ya Biblia na likambo yango?” Tángá Yilimia 10:23. Nsima ya kotánga, tuná likanisi na ye mpo na mokapo yango. Na nsima lakisá ye lokasa 16 mpe 17 ya mwa buku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? To okoki kosalela mokapo 10 ya buku Créateur. Lendisá ye andima mokanda yango mpe atánga yango.—Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Comment raisonner na lokasa 111 kino 112.
9 Ezali solo ete bato nyonso te oyo baboyaka kondima Nzambe nde bakondima mateya ya solo. Kasi mingi kati na bango bakolinga kotalela likanisi mosusu. Salelá maloba ya polele, mayele ya kondimisa mpe, likoló na nyonso, salelá Liloba ya Nzambe oyo ezali na nguya mpo na kosalisa bango bámona solo.—Mis. 28:23, 24; Ebe. 4:12.