Tótalelaka Liloba ya Yehova mokolo na mokolo!
1 Mokolo na mokolo ebimisaka mikakatano mosusu mpo na kondima na yo. Mbala mosusu moninga moko oyo azali moklisto te azali kotungisa yo mpo bóbimaka na ye. Molakisi na yo azali kolendisa yo olanda kotánga kelasi mingi mpo na kozwa mosala ya mbongo, to patro na yo alingi ete osala ngonga mingi koleka na mosala. Mbala mosusu nzoto ezali lisusu malamu mpenza te. Atako soko komekama motindo yango ekoki kokómela yo ezala na ntango nini, ozali yo moko te. Yehova akoki kopesa yo mayele oyo osengeli na yango mpo na kolonga komekama yango. Kotalela mokapo ya Biblia mpe komantere na yango na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo ezali lolenge moko ya koyekola Liloba ya Yehova mbala na mbala. Osalelaka ebongiseli yango?
2 Lisungi ezali: Yisaya 30:20 ezali komonisa Yehova lokola ‘Molakisi Monene.’ Basaleli ya Nzambe bakoki kotala epai na ye mpo na kozwa lisungi. Akopesa yo lisungi oyo osengeli na yango mpenza mpo na koyika mpiko na mikakatano oyo kondima na yo ezali kokutana na yango. Ndenge nini? Vɛrsɛ oyo elandi elobi ete: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” Lelo oyo, Yehova azali kopesa “liloba” na ye na nzela ya Makomami mpe na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Ata kaka masolo ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ezali na toli ya mayele na makambo nyonso oyo moklisto akoki kokutana na yango na kati ya bomoi na ye, oyo ezali kolobela likambo moko moko ya bomoi ya moklisto. Kotalela masolo oyo etyami na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo ekosalisa yo okóma na boyebi mingi oyo ezali mpenza na ntina mpo na kolonga komekama ya ndenge nyonso.—Yis. 48:17.
3 Bongisá ntango mpo na yango: Atako ntɔngɔ nyonso azalaki na makambo mingi ya kosala, mama moko azwaki momeseno ya kotánga mpe kotalela mokapo ya mokolo mpe komantere na yango elongo na mwana na ye ya mobali ntango mwana yango azali komela ti na ntɔngɔ. Maloba yango mpe libondeli ezalaki maloba ya nsuka oyo azalaki koyoka ntɔngɔ nyonso liboso ya kokende na kelasi. Yango ezalaki kolendisa ye ete akwea te na masɛnginya ya kosala pite, amikɔtisa te na makambo ya elimo ya bolingi-ekólo, mpe kopesa litatoli na mpiko nyonso epai ya banakelasi na balakisi lokola. Atako na ntango wana azalaki bobele ye moko Motatoli na eteyelo yango mobimba, kasi azalaki komiyoka te ete azali ye moko.
4 Talelá Yehova mpe Liloba na ye mpo na kozwa litambwisi. Soki osali bongo, akozala mpenza moto ya solosolo mpo na yo, lokola moninga ya motema. Bɛlɛmá epai na ye mokolo na mokolo! Elongo na bamilio mosusu ya bato na mokili mobimba, oyo batalelaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, tiká ete miso na yo makóma lokola ‘miso oyo mazali komona Molakisi na yo Monene.’