Nini ekosalisa biso ete tópikama kati na kondima?
1 Banda ntango tokómaki kosangana na ebongiseli ya Yehova, bokoli na biso ya elimo ezali komemela biso esengo! Nzokande, mpo ‘tópikama, tótongama mpe tótɛngatɛnga te kati na kondima,’ tosengeli kolanda kokola na elimo. (Kols. 2:6, 7, NW) Ntango bato mingi bazali kokola na elimo, basusu bazali nde kotangwa mosika mpamba te bazali “kotɛlɛma kati na kondima” te. (1 Kol. 16:13) Tokoki kosala ete likambo yango ekómela biso te. Ndenge nini?
2 Zalá ntango nyonso na mosala na makambo ya elimo: Zalá na mimeseno malamu ya makambo ya elimo na kati ya ebongiseli ya Yehova. Kuna, bamposa na biso ya elimo ezali kokokisama malamu mpenza. Makita ya lisangá, mayangani ya mike mpe ya minene ekolendisa biso ete tókola lisusu mingi koleka na elimo mpe tótɛngatɛnga te, soki tozali koyangana ntango nyonso mpe soki tozali kozwa matomba na yango. (Ebe. 10:24, 25) Soki tozali na momeseno ya kotánga Biblia, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, mpe mikanda oyo ezali kolobela bilei makasi ya Liloba ya Nzambe tokokola mingi na elimo mpe tokozala makasi. (Ebe. 5:14) Komityela mikano ya elimo mpe kosala molende ya kokokisa yango ekomemela biso mpe matomba ya ntango molai.—Filp. 3:16.
3 Zwá lisalisi ya baklisto oyo bakomɛli na elimo: Luká baninga ya sika kati na baoyo bakomɛli na elimo na kati ya lisangá. Luká koyeba bankulutu, mpamba te bazali bato ya liboso oyo bakoki kolendisa biso. (1 Tes. 2:11, 12) Ndimá toli nyonso mpe makanisi nyonso oyo bakopesa. (Ef. 4:11-16) Basaleli na misala basepelaka mpe kosalisa bato mosusu ete bázala makasi na kondima, na yango sololaká na bandeko yango mpo ete bálendisa yo.
4 Ozali na mposa ya lisungi na mosala ya kosakola? Sololá na bankulutu, mpe sɛngá lisalisi. Mbala mosusu bakoki kotya yo na programɛ “Babongisi nzela bazali kosalisa bato mosusu.” Outi kozwa batisimo sika? Soki oyekoli buku Lisanga mpe osaleli makambo oyo ezali na kati, yango ekosala ete okola mbangu na elimo. Ozali moboti? Osengeli ntango nyonso kolendisa elimo ya bana na yo.—Ef. 6:4.
5 Soki topikami mpe tozali kotɛngatɛnga te na kondima, tokozala na boyokani malamu na Yehova mpe tokozala baninga malamu mpo na bandeko na biso. Yango ekosalisa biso tólonga minyoko ya Satana, mpe ekolendisa elikya na biso ya bomoi ya seko na mikolo mizali koya.—1 Pet. 5:9, 10.