Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/00 lok. 8
  • Osakolaka Bokonzi sanza na sanza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osakolaka Bokonzi sanza na sanza?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Osalaka oyo ekoki na yo mpo lapolo ya mosala ya kosakola ezala sikisiki?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Sɛtɛ́mbɛ ekozala sanza ya ntina mingi?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tokoki kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza oyo eleki basanza nyonso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Basakoli ya nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 4/00 lok. 8

Osakolaka Bokonzi sanza na sanza?

1 Biso nyonso tosepelaki ntango toyokaki ete na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1999, Congo-Kinshasa ekómaki na basakoli 114 071, yango ezali motango eleki monene oyo tozwaki naino liboso te. Yango esɛngaki solo kosala na bomoko mpe na molende! Kasi na basanza oyo elandaki, basakoli mosusu bakokaki lisusu te kosakola Bokonzi sanza na sanza, yango wana motango ya basakoli ekitaki, ekómaki 105 600. Yango emonisi ete mosakoli moko na kati ya basakoli 13 amibongisaki te mpo na kosakola sanza nyonso. Tondimi ete bilendiseli oyo ezali awa ekosalisa mpo na kobongisa likambo yango.

2 Tómonisa botɔndi mpo na libaku malamu yango: Tosengeli komonisa botɔndi mingi mpo na libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu epai ya bato mosusu. Mosala yango esepelisaka motema ya Yehova mpe esalisaka bato ya mitema sembo ete báyekola nzela ya bomoi. (Mas. 27:11; 1 Tim. 4:16) Soki tozali kopesa litatoli mbala na mbala, yango ekosala ete tómesana na mosala ya kosakola mpe ekopesa biso esengo mpe tokosepela ete tozali kokokisa likambo moko ya ntina.

3 Pesá lapolo na yo ya mosala ya kosakola: Bato mosusu oyo babimaka na mosala ya kosakola bazalaka na bolɛmbu mpo na kopesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola na ntango ebongi. Tosengeli soki moke te kokanisa ete lokola tosakoli bobele mwa ngonga moke, ezali malamu te kopesa lapolo. (Talá Malako 12:41-44.) Ya solo, tosengeli kopesa lapolo ya ngonga oyo tosalaki! Soki tozali na ebongiseli malamu na ndako, lokola kosalela manaka moko mpo na kokoma ngonga oyo tolekisi na mosala ya kosakola, yango ekosalisa biso ntango nyonso ete tóyeba malamumalamu ngonga boni tosalaki na mosala ya kosakola mpe tópesa noki lapolo na biso na nsuka ya sanza nyonso.

4 Pesá lisungi oyo esengeli: Lisangá ekoki kozwa lisusu bibongiseli mpo na kosalisa bato oyo bazali na mposa ya lisungi mpo na kobima pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola. Mokomeli ya lisangá mpe batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli kozwa bibongiseli mpo ete basakoli oyo bakɔmeli bápesa basalisa basakoli mosusu. Soki ozali na bana to bato mosusu oyo oyekolaka na bango Biblia baoyo bazwi naino batisimo te, teyá bango bápesaka lapolo na bango ya mosala ya kosakola sanza nyonso.

5 Omikundola lisolo ya bomoi ya ndeko moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1997 oyo ezali na motó ya likambo “Nazali na botɔndi mpo ete nalekisi ntango mingi ya bomoi na ngai na mosala ya Yehova.” Ndeko mwasi Ottilie Mydland moto ya ekólo Norvège akómaki mosakoli ya sanza na sanza ya nsango malamu liboso ya batisimo na ye na 1921. Nsima ya mbula ntuku nsambo na motoba, wana akómaki na mbula 99, alobaki boye: “Nazali na esengo mpamba te nazali na likoki ya kosakola sanza na sanza.” Oyo ezali solo elimo malamu oyo basaleli ya Yehova nyonso basengeli kolanda!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto