Sɛtɛ́mbɛ ekozala sanza ya ntina mingi?
1 Mobu 1963 ezalaki mobu ya ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova. Mpo na nini? Mpo ete na mobu wana basakoli na mokili mobimba bakómaki milio moko. Soki ozalaki kati na solo na eleko wana, okoki komikundola ndenge tozalaki na esengo ya kozala bato mingi na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi! Lelo oyo, na ndakisa, moko ya bikólo ya teritware na biso ezali yango moko na basakoli koleka 108 000. Nzokande, na ekólo yango, sanza na sanza, na mwayene, basakoli 10 374 bapesaka lapolo ya mosala ya kosakola te.
2 Ndimá kolonga mokakatano yango: Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ, soki mokomoko na biso apesi lapolo na ye ya mosala ya kosakola, tokokóma na motángo ya basakoli oyo eleki monene na teritware na biso mobimba. Soki milende na biso elongi, boye Sɛtɛ́mbɛ ekozala sanza ya ntina mingi mpo na biso! Bolongi etalelaka molende ya moto na moto.
3 Baoyo bazali komibongisa mpo na kozwa bopemi bakoki kolekisa mwa ntango na mosala ya kosakola. Kamatá trakte, mwa babuku mpe bazulunalo mpo ete opesa litatoli epai na bato oyo okokutana na bango. Lisusu, epai okokenda, okoki kosakola elongo na bandeko mosusu.
4 Soki ozali na maladi, okoki mpe kosakola. Okoki kopesa litatoli epai na minganga, balifulume, to bato oyo bakoya kotala yo. Mbala mosusu okoki kopesa litatoli na nkoma to na telefone.
5 Na ntembe te, basusu bakosepela kozwa lisalisi na mosala ya kosakola na Sɛtɛ́mbɛ. Bankulutu, basaleli na misala, mpe batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli komibongisa mpo na kopesa lisalisi yango. Nzokande, kobosana te kozongisa nokinoki lapolo na yo ya mosala ya kosakola na nsuka ya sanza mpo ete na Sɛtɛ́mbɛ otángama mpe lokola mosakoli.
6 Sepelá na libaku malamu yango: Mosala ya kosakola ezali ‘libombo kitoko.’ (2 Tim. 1:14, NW) Tosepelaka na libaku malamu oyo epesameli biso ya kosakola nsango malamu. (1 Tes. 2:4) Soki totaleli makambo nyonso oyo Yehova azali kosala mpo na biso, tosengeli kopusama na kosala na bosembo mpenza mosala oyo eleki ntina, mosala ya kosakola, na boumeli ya mobu mobimba. Tosengeli kotika nzela te na likambo moko ete epekisa biso kosakola mbala na mbala. Tósala ete Sɛtɛ́mbɛ ezala sanza ya ntina mingi kati na mosala ya Yehova mpe tózwa ekateli ya kopesa litatoli mpo na ye sanza na sanza!—Nz. 34:1.