Bangá Yehova ntango nyonso
1 “Kobanga [Yehova] ezali ebandeli ya mayele.” (Nz. 111:10) Yango etindaka biso ete tósalaka misala ya malamu mpe tókimaka oyo ezali mabe. (Mas. 16:6) Kobanga yango ezali limemya mozindo oyo tozali komonisa epai ya Mozalisi na biso, yango ezali kosala ete tóboya koyokisa ye mpasi mpe tosala te makambo oyo ekomonisa ete tozangi botosi epai na ye. Ezali ezaleli oyo tosengeli kokolisa mpe komonisa yango ntango nyonso.—Mas. 8:13.
2 Mokolo na mokolo, elimo ya mokili ya Satana ezali kobimisela biso mitungisi mingi mpe ezali kotinda biso ete tólanda banzela na yango ya mabe. (Ef. 6:11, 12) Nzoto na biso ya kozanga kokoka etondi na masumu mpe mposa na yango ezali ntango nyonso ya kosala mabe. (Gal. 5:17) Yango wana, mpo tótosa mibeko ya Yehova, tózala na esengo mpe na bomoi, tosengeli kobanga ye ntango nyonso.—Det. 10:12, 13.
3 Na Baebele 10:24, 25, tozwi toli ete tósanganaka elongo mpo na kolendisanaka, “tósala bongo na koleka” na mikolo ya nsuka oyo tozali kobika na yango. Soki tolingi kobika na mikolo oyo ya nsuka, tosengeli koyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita. Ezaleli na biso ya kobanga koyokisa Nzambe mpasi etindaka biso toyanganaka ntango nyonso na makita mpe tópesaka motuya mingi na makita yango. Baoyo babangaka Nzambe batalelaka koyangana na makita ya boklisto lokola likambo moko ya bulɛɛ.
4 Lolenge mosusu oyo tomonisaka ete tobangaka Nzambe, ezali ya kotosa etinda ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Mat. 28:19, 20; Mis. 10:42) Mokano ya libosoliboso ya mosala na biso ya kosakola ezali ya kosalisa bato bákolisa ezaleli ya kobanga Yehova mpe bátosa mokano na ye. Tokokisaka mokano yango ntango tozali kozongela bato oyo basepeli, kosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato, mpe na nsima koteya bato mosusu mitinda ya Nzambe. Na lolenge yango, tokomonisa ete tozali kobanga Yehova mpe tozali kolinga bazalani na biso.—Mat. 22:37-39.
5 Baoyo babangaka Nzambe te, basepelaka na makambo ya elimo te, mpe bazali kolanda mopɛpɛ ya mokili to elimo na yango oyo ekoki koboma. (Ef. 2:2) Tiká ete mokano na biso ezala ntango nyonso ya “kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ na kobanga mpe na nsɔmɔ.” (Eb. 12:28, NW ) Tokozwa matomba oyo ebongisami mpo na baoyo bazali kobanga Yehova ntango nyonso.