Tóyekola makambo na kasɛti video La Bible: un récit historique exact, des prophéties dignes de foi
Nsima ya kotala kasɛti video oyo, okoki koyanola na mituna oyo? (1) Makambo ya kotyela motema oyo ezali na kati ya Biblia, euti epai ya nani? (Dan. 2:28) (2) Ndenge nini Biblia ezali komonisa malamu ndenge Ezipito ya kala ezalaki, mpe ndenge nini esakweli oyo ezali na Yisaya 19:3, 4 ekokisamaki? (3) Ndenge nini arkeoloji endimisi ete makambo oyo Biblia elobi mpo na Baasulia, bakonzi na bango, mpe ndenge mboka yango esukaki ezali solo? (Nah. 3:1, 7, 13) (4) Bisakweli nini oyo elobamaki mpo na Babilone, emonani ete ebongi kotyela yango motema? (5) Bamede na Baperse basalaki likambo nini mpo na basaleli ya Nzambe? (6) Ndenge nini esakweli oyo ezali na Danyele 8:5, 8, ekokisamaki mpe yango esakolamaki koleka ntango boni liboso? (7) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali Masiya ya solo? (8) Lelo oyo banguya nini ya politiki ezali kokokisa bisakweli oyo ezali na Emoniseli 13:11 mpe 17:11? (9) Makambo nini oyo ezali na kati ya kasɛti video yango emonisi bosolo ya Mosakoli 8:9? (10) Ndenge nini makambo yango elendisaki kondima na yo na bilaka oyo Biblia epesi mpo na mikolo oyo ezali koya? (11) Ndenge nini okoki kosalela kasɛti video yango mpo na kosalisa bato mosusu bándima ete Biblia euti mpenza na Nzambe?