Ndenge ya kondimisa bato mosusu
1 Ntoma Paulo ayebanaki lokola mosakoli oyo azalaki na makoki ya kondimisa bato mosusu. (Mis. 19:26) Ata mokonzi Akalipa ayebisaki ye ete: “Olingi kondimisa ngai na ntango mokuse ete nasala mosala na Moklisto!” (Mis. 26:28) Nini esalaki ete mosala ya kosakola oyo Paulo azalaki kosala esimba mitema ya bato? Azalaki kokanisa na bango malamumalamu na Makomami, azalaki koluka koyokanisa makambo oyo azalaki kolobela na lolenge ya bomoi ya bato oyo bazalaki koyoka ye.—Mis. 28:23.
2 Lokola Paulo, biso mpe tosengeli kozala na makoki ya kondimisa bato na mosala na biso ya kosakola. Ndenge nini? Soki tozali kososola malamu ntango tozali kosolola na bato mosusu mpe ntango tozali koyoka bango. (Mas. 16:23) Makambo misato ya ntina ekosalisa biso mpo na yango.
3 Yoká na likebi nyonso: Ntango bato mosusu bazali koloba, yoká mpo na koyeba makambo oyo ekosala ete bósolola malamu. Soki moto yango atii ntembe na likambo moko, meká koyeba malamumalamu ntina nini azali kokanisa bongo. Ekozala malamu oyeba mpenza makambo nini ye andimaka, mpo na nini andimaka yango, mpe nini etindaki ye andima yango. (Mas. 18:13) Salelá mpenza mayele mpo na komema ye aloba nyonso wana.
4 Tuná mituna: Soki moto amonisi ete andimaka liteya ya bosato, okoki kotuna ye boye: “Ondimaka liteya ya bosato banda kala?” Okoki lisusu kotuna ye boye: “Osi oyekolá na mozindo makambo oyo Biblia ezali koloba mpo na liteya yango?” Okoki mpe kotuna ye boye: “Soki ya solo Nzambe azali mpenza bosato, ondimi te ete Biblia ekokaki koyebisa biso yango polele?” Eyano oyo okozwa ekosalisa yo okanisa na moto yango malamu na oyo Makomami elobi.
5 Salelá makanisi oyo ebongi: Motatoli moko atunaki motuna oyo epai ya mwasi moko oyo azalaki kondima ete Yesu azali Nzambe: ‘Soki olingi komonisa ete bato mibale bakokani mpenza, okosalela liloba nini oyo emonisaka ete bato mibale bazali libota moko?’ Azongisaki ete: “Nakoki koloba ete bazali bandeko.” Motatoli yango abakisaki ete: “Mbala mosusu kutu tokoki koloba ete bazali mapasa. Kasi ntango Yesu ateyaki ete totalelaka Nzambe lokola Tata mpe ye moko lokola mwana, liteya nini Yesu alingaki kopesa?” Mwasi yango akangaki ntina ete moko azali mokóló mpe azali na bokonzi mingi koleka. (Mat. 20:23; Yoa. 14:28; 20:17) Makoki ya kondimisa esimbaki makanisi mpe motema ya mwasi yango.
6 Na ntembe te, ezali bato nyonso te nde bazali kondima solo, ata soki tosaleli maloba ya ndenge nini to tosaleli mayele nyonso ya koluka kondimisa bango. Kasi, lokola Paulo, tiká ete tozala na molende ya koluka bato ya mitema sembo oyo bazali na teritware na biso, tómema bango ete bándima nsango ya Bokonzi.—Mis. 19:8.