Saleláká mayele ya kondimisa ntango ozali koteya
1. Mbala mingi, kosalela malamu Liloba ya Nzambe na mosala ya kosakola esɛngaka nini?
1 Lokola ntoma Paulo, baministre oyo bateyaka malamu bayebaka ete “kosembola liloba ya solo malamumalamu” esuki kaka te na koyebisa bato makambo oyo Biblia elobi. (2 Tim. 2:15) Ndenge nini tokoki kosalela “mayele ya kondimisa” ntango tozali koteya Liloba ya Nzambe?—Mis. 28:23.
2. Ndenge nini tokoki kosalisa bato bázala na limemya mingi mpo na Liloba ya Nzambe?
2 Tiká Liloba ya Nzambe yango moko eloba: Ya liboso, bendá likebi ya moto na Biblia mpo osalisa ye azala na limemya na bwanya ya Nzambe oyo ezali na buku yango. Soki moto oyo tozali kosolola na ye azali komona ete totyelaka Liloba ya Nzambe motema, yango ekoki kotinda ye atya likebi ntango tozali kotánga bavɛrsɛ ya Biblia. (Ebr. 4:12) Tokoki koloba na mokuse boye: “Nasepelaki mingi na likanisi ya Nzambe na likambo yango. Yoká oyo Liloba na ye elobi.” Mbala nyonso oyo ozwi libaku, tángelá moto mbala moko na kati ya Liloba ya Nzambe mpo na kotika yango moko eloba.
3. Nsima ya kotángela moto vɛrsɛ, okoki kosala nini mpo na kosalisa ye akanga ntina na yango?
3 Ya mibale, limbolá vɛrsɛ oyo otángi. Bato mingi bakangaka ntina te ntango bayoki vɛrsɛ moko ya Biblia mpo na mbala ya liboso. Mbala mingi, esɛngaka kolimbwela bango yango. (Luka 24:26, 27) Bendá likebi na maloba ya ntina. Kotuna moto oyo ozali kosolola na ye motuna ekoki kosalisa yo oyeba soki akangi ntina ya likambo oyo olingi komonisa ye.—Mas. 20:5; Mis. 8:30.
4. Wapi likambo ya misato oyo ezali na ntina mpo na kondimisa bato oyo tozali koteya?
4 Salelá Makomami mpo na kosolola na bato: Ya misato, salá makasi osimba makanisi mpe motema ya moto. Salisá moto ayeba ndenge oyo makanisi ya vɛrsɛ etaleli ye. Kosalela Makomami mpo na kosolola na moto ekoki kotinda ye abongola makanisi na ye. (Mis. 17:2-4; 19:8) Na ndakisa, nsima ya kotánga Nzembo 83:18, tokoki kokanisa na moto mpo na kosalisa ye amona ete koyeba nkombo ya moto ezali na ntina mingi ntango olingi kokóma moninga na ye. Na nsima, tokoki kotuna ye boye: “Okanisi ete koyeba nkombo ya Nzambe ekosalisa yo obondelaka ye malamu koleka?” Koyokanisa makanisi ya Biblia na makambo ya bomoi ya moto oyo ozali kosolola na ye esalisaka mpo amona motuya na yango. Koteya Liloba ya Nzambe na lolenge wana, oyo ezali kondimisa, ebendaka bato ya mitema sembo mpo básambela Nzambe ya solo mpe ya bomoi, Yehova.—Yir. 10:10.