‘Omipesa mingi’ na mosala na yo ya kosakola
1 Ntango totángaka ete ntoma Paulo azalaki kosala mosala ya kotonga bahema na Kolinti, tokoki mbala mosusu kokanisa ete azalaki lisusu kosakola mingi te. Nzokande, Misala 18:5, NW elobi ete: “Paulo abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba, kopesáká litatoli epai ya Bayuda mpo na komonisa ete Yesu azali Klisto.” Mpo na nini Paulo amipesaki na mosala ya kosakola? Atako bato mingi ya Kolinti bakomaki bandimi na ntango wana, Nkolo amonisaki ete ezalaki lisusu na bato ebele oyo basengelaki kokóma bayekoli na mboka yango. (Mis. 18:8-11) Likambo yango ezali nde komonana mpe epai na biso mpo tómipesa mingi na mosala ya kosakola? Ɛɛ. Ezali naino na bato mingi oyo tokoki kokutana na bango mpo na koteya bango solo.
2 Sakolá mingi na sanza ya Aprili: Tokanisi ete ozalaka na mokano ya kosakola nsango malamu sanza nyonso. Kasi, basanza mosusu esengaka kaka ‘tómipesa mingi’ na mosala yango. Moko ya basanza yango ezali sanza ya Aprili, mpo yango ezali mpenza na kati ya mikolo oyo Ekaniseli ekosalema. Obongisi makambo na yo mpo epesa yo nzela ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi to mpe ya kosakola mingi na mikolo yango? Basakoli mingi oyo bazali kosala yango bazali kozwa mapamboli mingi. (2 Kol. 9:6) Soki ozali kosala nyonso oyo ekoki na yo, yebá ete Yehova azali kosepela na mosala na yo mpo ozali kosala yango na molimo na yo mobimba. (Luka 21:2-4) Ata soki ozali ndenge nini, zwá mokano ya “komipesa mingi” na mosala na yo ya kosakola na sanza ya Aprili. Mpe kobosana te kopesa lapolo na yo ya mosala na nsuka ya sanza mpo bangonga ya mosala makasi oyo osalaki etángama esika moko na oyo ya basaleli mosusu ya Yehova.
3 Kende kotala bato ya sika oyo bayanganaki na Ekaniseli: Na mbula eleki bato 604160 bayanganaki na Ekaniseli na Congo-Brazzaville mpe na Congo-Kinshasa. Motango ya bato oyo bayanganaki mbula oyo eyebani naino te na mobimba. Kasi, balapolo emonisi ete “mosala ya kobuka mbuma” ekozala monene. (Mat. 9:37, 38, NW) Yango wana, koumela te kozwa bibongiseli mpo na kokende kotala bato ya sika oyo bayanganaki na Ekaniseli mpo na kosalisa bango na elimo. Soki olekisi mikolo mingi, yango ekopesa nzela na ‘oyo mabe abotola liloba ya bokonzi oyo ekonami na mitema na bango.’ (Mat. 13:19) Soki okei kotala bango nokinoki, okomonisa ete ‘omipesi mingi’ na mosala na yo ya kosakola.
4 Kobá kosalisa bato oyo batiká kosakola: Na sanza ya Febwali, mosala makasi ebandaki mpo na kosalisa bato oyo batiká kosakola. Soki ezali na bato mosusu oyo bankulutu bakei naino kotala bango te, bankulutu basengeli kozwa bibongiseli mpo na kokende kotala bango liboso ete sanza ya Aprili esila. Bankulutu bakosala makasi mpo na koyeba eloko nini mpenzampenza ezali kokanga moto yango mpe lisalisi nini ya malamu mpenza bakoki kopesa ye mpo azongela kosalela Yehova na molende. Lisalisi wana ya bolingo ezali komonisa ete bankulutu bazali kozwa na lisɛki te mokumba na bango ya babateli ya “etonga ya Nzambe.” (1 Pet. 5:2; Mis. 20:28) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Setɛmbɛ 1993, na lok. 22-23, epesaki makanisi malamu oyo bankulutu bakoki kosalela ntango bazali kotalela mokomoko ya makambo mitano oyo mbala mingi etindaka bato ete bátika kosakola. Ntango mosusu, bato mosusu bakoki kozongela kosakola na sanza ya Aprili.
5 Salisá bato mingi lisusu bákoma basakoli oyo bazwi naino batisimo te: Bana na yo bakokisi makambo oyo esɛngami mpo na kokóma basakoli ya sika ya nsango malamu? Bongo bato mosusu oyo oyekolaka na bango Biblia? Soki bankulutu bandimi bango, Aprili ekozala sanza moko ya malamu mpo babanda kosakola, boye te? Soki moto azali kokende ntango nyonso liboso mpe asilisi koyekola mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi, okoki koyekola na ye buku ya mibale—ekoki kozala buku Parole de Dieu, Paix véritable, to mpe buku Tosangani esika moko mpo na kosambela. Eloko oyo yo okoluka yango oyo: kosalisa moyekoli akoma na boyebi mingi ya solo, akokisa makambo oyo esɛngami mpo na kozala mosakoli oyo azwi naino batisimo te, mpe akóma Motatoli ya Yehova oyo amipesi mpe azwi batisimo.—Ef. 3:17-19; 1 Tim. 1:12; 1 Pet. 3:21.
6 Soki bato oyo oyekolaka na bango Biblia bazali komona ete ozali komipesa mingi epai na bango, yango ekoki kosalisa bango bákangama na solo. Ndeko mobali moko akutanaki na mwasi moko na mobali na ye oyo bazalaki mibange; mpe na motema moko mpenza, bandimaki koyekola Biblia. Kasi na pɔsɔ misato oyo elandaki, bayekolaki te, bazalaki kaka kopusapusa mokolo ya boyekoli. Kasi nsukansuka babandaki koyekola. Nde na nsima ya mokolo wana, bakomaki kolekisa bapɔsɔ mingi balingi koyekola te. Atako bongo, nsukansuka, mwasi ayaki kokola mpe azwaki batisimo. Ndeko mobali yango akanisi lisusu likambo oyo esalemaki, alobi boye: “Nsima ya kozwa batisimo, mwasi yango alelaki na esengo; ntango ngai na mwasi na ngai tomonaki bongo, biso mpe tolelaki.” Ya solo, “komipesa mingi” na mosala ya nsango malamu epesaka esengo makasi!
7 Bisakweli ya Biblia mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi ete tozali sikoyo na kati mpenza ya mikolo ya nsuka. Oyo ezali ntango oyo basaleli nyonso ya Nzambe basengeli “komipesa mingi” na mosala ya koyebisa bato nsango malamu. Ntoma Paulo akitisi biso motema, alobi ete mosala yango ‘na kati ya Nkolo ezali ya mpamba te.’—1 Kol. 15:58.