Bamipesi mobimba mpo na kosakola nsango malamu
NTOMA Paulo azalaki kati na ezalela ya mpasi oyo ezali mpe komonana epai na ba Témoins de Jéhovah oyo bazali basaleli ya ntango nyonso: azalaki na bosenga ya mosolo. Na mboka Kolinti, abandaki kosala hema, mosala ya komikitisa oyo ayekolaki na bolenge na ye. Mosala mozalaki mpasi, mpe mbala mosusu azalaki kozoka na maboko wana azalaki kokangisa kapó ya hema, elamba oyo na makasi mingi. Mosolo oyo azalaki kozwa ekokaki bobele mpo na kolya na ye mpe mpo na kolata na ye, nzokande azalaki na esengo mpo na yango, mpamba te, na nsuka ya mokolo na ye ya mosala, azalaki kotika biloko na ye ya mosala, mpe kolanda kokokisa mosala ya libosoliboso oyo ememaki ye na Kolinti: kosakola nsango malamu!—Bafilipi 4:11, 12.
Paulo azalaki kokende na eyanganelo na mokolo nyonso ya sabata. Ezali solo ete na ebandeli Paulo asololaki na bayoki na ye Bakolinti “na nsomo mpe na kolɛnga mingi.” (1 Bakolinti 2:1, 3) Kasi kolendisamáká na matomba oyo mabimaki epai na bato mosusu na nzela na nsango na ye, Paulo azalaki kopesa ‘diskur na mokolo nyonso na sabata, kondimisáká Bayuda mpe Bagreke.’—Misala 18:1-4.
Na boumeli na mwa ntango, Paulo azalaki kosakola nsango malamu bobele na ndambo ya mokolo. Na nsima, Sila mpe Timoté bautaki longwa Makedonia elongo na likabo ya bolingo malamu oyo esilisaki ‘bosenga na ye,’ (2 Bakolinti 11:9; Bafilipi 4:15) Paulo alendisamaki lisusu na koyokáká ete bandeko ya Tesalonike bazalaki koyika mpiko atako minyoko.—1 Batesaloniki 3:6.
Yango ezalaki na bopusi nini likoló na Paulo? “Paulo amipesaki mobimba mpo na kosakola liloba [asalelaki ntango na ye nyonso mpo na kosakola, Biblia, Français courant], kotatola liboso na Bayuda mpo na komonisa ete Yesu azali Klisto,” (Misala 18:15) Lokola mikakatano ya mosolo ekitaki mpo na mwa ntango, Paulo azongelaki lisusu mosala na esengo nyonso; ateyaki bobele Bayuda te, kasi azwaki lisusu ntango ya kokoma mokanda ya liboso kati na mikanda na ye mipemami na Nzambe: mokanda epai na Bakolinti!
Ndakisa mpo na biso
Lisoló ya mosala makasi ya Paulo na Kolinti ekomamaki mpo ete elendisa baklisto nyonso na komipesa mobimba mpo na kosakola nsango malamu. Paulo ayebaki malamu ete Nkolo Yesu ye moko apesaki na bayekoli na ye lokumu monene ya kozala “pole na mokili.” Basengeli kobomba pole yango te. Yesu alobelaki bango ete: “Tika ete pole na bino engenga liboso na bato ete bamona misala na bino malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na makoló.” (Matai 5:14-16) Yango elimbolaki kosangana mingi mpenza na mosala ya kosakola oyo Yesu ayebisaki liboso. (Matai 24:14; 28:19, 20; Misala 1:6-8) Kosakolama na nsango malamu wana ya Bokonzi yango ezalaki likambo ya liboso kati na lisangá ya boklisto.
Na ndakisa ya Paulo, baklisto ya ekeke ya liboso bapesaki motuya monene na kosakolama wana. Na yango, wana banguna na Nzambe bazalaki kokanisa ete bazimisaki pole ya solo na kobomáká “mokonzi ya bomoi” kati na liwa ya mpasi, bayekoli ya Klisto balandaki kozala pole ya mokili na kosakolaka nsango malamu na molende. (Misala 3:15) Ata minyoko ekokaki te kosukisa milende na bango. Lisoló ya Biblia elobi ete: “Batiki te mokolo na mokolo, kati na tempelo mpe na ndako na ndako, bateyaki mpe basakolaki nsango malamu na ntina na Klisto, Yesu.” (Misala 5:42, MN) Eloko moko te ekokaki kopekisa bango!
Lolenge moko, baklisto ya ntango na biso bamipesi mobimba mpo na nsango malamu. Na nsuka na ekeke ya zomi na libwa, bayekoli na Biblia oyo bamipesi mpenza bamonaki mposa oyo ezalaki na ntina na koyebisa basolo ya Biblia epai na bato mosusu. Na 1884, la Zion’s Watch Tower Tract Society, lisangá oyo ebandaki kopalangana na mokili mobimba, ekomaki société to etuluku ya bato oyo bayangani mpo na kokokisa mokano moko. Bayekoli wana ya Biblia, baoyo 1931 babengamaki Témoins de Jéhovah, batondisaki mpenza mokili mobimba na boyebi ya Biblia. Mosala makasi oyo bakokisaki emonisami na libota makasi lisalemi na bato koleka bamilió minei! Mpe ntembe ezali te ete motuya yango mokolanda kobakisama na litambwisi ya Jéhovah.—Yisaya 60:22
Ozali nde kosala oyo ekoki na yo?
Yesu alobaki ete: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te.” (Matai 9:37, 38) Na 1990, pene na bamilió zomi na bato bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Ezali naino na ebele na bato ya kosalisa mpo na kobuka mbuma ya elanga oyo monene. Kasi awa ezali biso kosepela na bokoli yango, moto na moto asengeli komituna ete: “Ngai nazali kosala nini kati na mosala oyo monene? Nazali kosala mbala na mbala, to poso na poso soki likoki ezali?”
Bankulutu basengeli kozala na molongó ya liboso kati na mosala yango, ete bazala “bandakisa mpo na etongá.” (1 Petelo 5:3) Ezali solo ete bankulutu mingi bazali kosala. Ezalaki likambo oyo Paulo akokisaki na mboka Kolinti. Azalaki komibómbela ntango mpo na kosakola mbala na mbala. Bankulutu mingi bazali komipesa mobimba mpo na misala ya elimo na nsuka ya poso. Yango ekoki kozala elendiseli monene mpo na basangani nyonso ya lisangá. Wana molende mokotyamaka na basanza mosusu, masangá mingi makozwaka motuya monene ya ba pionniers. Ndenge nini bazali kosala? Bankulutu bazali na molongó ya liboso mpo na kosakola mpe kobongisa makita ya mosala.
Basaleli na misala mpe bakoki kozala na bopusi malamu likoló na lisangá na kosanganáká mbala na mbala kati na mosala ya kosakola. Tomikundola ete makomami mazali kosenga na bango ete bazala “bato na makambo mabongi, . . . baoyo bazali kosala mosala malamu.” (1 Timote 3:8, 13) Mpo na kokóma nkulutu to mosaleli na misala, esengeli ete ndeko mobali azala sembo kati na mosala ya kosakola.—Tito 1:8, 9.
Kolandáká ndakisa ya Paulo kati na likambo yango, basusu bazali na likoki ya kokitisa ngonga na bango ya mosala ya mosuni mpe kokóma ba pionniers. Ekoki mibu zomi sikawa, motuya ya ba pionniers auxiliaires, permanents to spéciaux elongwé na 137 861 kino 536 508 na 1990. Na ntembe te, bobele lipamboli mpe kondimama ya Jéhovah nde abimisaki matomba yango. Kasi ba pionniers basengeli kosenzela mpo na kosalela ntango na bango na mayele, bobele mpo na “kokokisa bangonga” mingi te. Pionniers, bomibongisaka malamu mpe bozali na molende kati na mosala ya kosakola? Bozali kosala makasi na kolanda kokóla mpo ete mosala na bino ebota mbuma mingi?
Mbano ya mosala mokokisami na bokatikati
Osalelaka malako na ntina na bomoi maye makopesamaka sanza nyonso kati na Réveillez-vous! mpe na Mosenzeli? Na ntembe te! Yango epusaka yo na kosangana na mosala ya kokabola bazulunalo yango? Ezali likambo lisalemaki epai na mwasi moklisto moko ya Botswana. Liboso azalaki kotemela solo, kasi mobali na ye azalaki kotangela ye masoló oyo mazalaki kobima na bazulunalo. Na nsuka na yango, ayaki kobongola ezaleli ya motema na ye, mpe akómaki Témoin. Atako ayebi kotanga te, azali kozwa matomba mingi kati na mosala na ye ya kosakola na kolobáká ete: “Nayebi kotanga te, kasi mobali na ngai azali kotangela ngai bazulunalo oyo. Nazali kosepela na yango mingi, mpe nandimisami ete yo mpe okosepela na yango lokola.”
Mpo na nini te kosangana poso na poso na mosala yango oyo mokobikisa bomoi ya bato? Lisangá ya boklisto likozala na esengo ya kosalisa yo kobanda na ntango oyo okokokisa masengami ya elimo. Kolakisa bazulunalo ezali bobele lolenge moko ya mosala na biso. Moto oyo amipesi mobimba na kosakola nsango malamu, akosalaka makasi na kokokisa mosala na bokatikati. Na ndakisa, la Societé Watch Tower azali kobimisa mikanda mingi oyo mibongisami na bizipeli makasi, oyo ezali kopesa na bato liziba ya bilei kitoko na elimo. Osili kokoma na makoki na mosala ya kosakola mpo na kolakisa mikanda lokola Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis?
Ezali boni mpo na bato oyo bazali kosepela na nsango malamu? Ozali kozwa banote ya malamu mpo na kosala bozongeli ya sika? Bozongeli yango ekoki komema na lolenge ya mosala na biso oyo ekopesaka esengo: boyekoli ya Biblia na ndako. Tomikundola ete Yesu apesaki biso etinda na Matai 28:19, 20 ete ‘tozalisa bayekoli mpe tobatisa bango.’ Yango elakisi koyekola Biblia elongo na bango. Ezali solo ete boyekoli ya Biblia mbala mingi ekosengaka kolendendela. Témoin moko akutanaki na mibangé babalani mibale baoyo bandimaki na motema mobimba ete bayekola Biblia. Kasi na nsima, mbala misato, bato yango bazalaki kopusa mokolo ya kobanda boyekoli. Na nsuka boyekoli bobandaki. Na nsima, na boumeli ya mwa ntango, pene na poso moko babalani yango bazalaki koyekola mpe poso mosusu bazalaki koyekola te. Kasi, na nsuka, mwasi azwaki batisimo. Ndeko mobali azali komikundola ete, “Nsima na batisimo, miso na ye etondaki na mpisoli ya esengo, mpe mwasi na ngai mpe ngai tobandaki kolela na esengo.” Ee, likambo na komipesa mobimba mpo na nsango malamu ezali kozwila biso esengo monene!-
Okoki komipesa!
Yesu Klisto mpe ntóma Paulo basili kotikela biso bandakisa kitoko na ezaleli ya kobanga Nzambe. Lelo oyo tozali na ebele ya bandakisa malamu kati na ba Témoins de Jéhovah. Ntango ekoki mpo na baoyo nyonso bayebi nsango malamu ete bamipesa mobimba mpo na koyebisa yango epai na bato mosusu. Biblia epesi biso elaká oyo ete mosala nyonso wana “ezali mpamba te.”—1 Bakolinti 15:58.
Lokola Paulo, baklisto mingi bazali na mikakatano ya mosolo. Yango ezali kopekisa mingi kati na bango na kozala ba pionniers. Kasi na lisalisi ya jéhovah, banso bakoki kolanda toli kitoko oyo ezali na Baloma 12:11, ete: “Mpo na etingya, bolembaka te; mpo na elimo, bopela na mɔtɔ; bosalela Jéhovah lokola baombo.” Mpe soki makambo mabongwani mpe mapesi nzela na kolekisa ngonga mingi na mosala ya Jéhovah, baoyo nyonso balingi mpenza Jéhovah bakosepela kosimba libaku yango, lolenge moko na Paulo. Omipesa mobimba mpo na kosakola nsango malamu! Yango ekomemela yo mapamboli mingi uta sikawa, mpe bomoi ya seko na mikolo mikoya, ndanga ya esengo mpe ya bolamu nsuka te!—Matai 19:28, 29.