Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/01 lok. 8
  • Ezalaka malamu kosalela elobeli ya pɛtɛɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezalaka malamu kosalela elobeli ya pɛtɛɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Soki maloba mpo na kobanda lisolo mazali kobimisa matomba, salelá yango!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Ndenge ya kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Monisá ete osepelaka na bato​—Na komibongisáká
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 4/01 lok. 8

Ezalaka malamu kosalela elobeli ya pɛtɛɛ

1 Mpo na nini mbala mingi bilenge babendaka likebi ya bato oyo bango bazali koyebisa nsango ya Bokonzi? Moko ya bantina ya likambo yango ezali oyo: elobeli na bango ezalaka ya pɛtɛɛ. Basakoli mosusu bakanisaka ete mpo na kopesa litatoli malamu esengeli kozala na elobeli moko ya likoló. Nzokande, makambo mingi emonisi ete kosolola na moto na maloba ya pɛtɛɛ mpe ya polele ezalaka malamu mingi koleka.

2 Yesu asakolaki Bokonzi ya Nzambe na elobeli moko ya pɛtɛɛ, ya mindondomindondo te mpe alakisaki bayekoli na ye ete basalaka mpe bongo. (Mat. 4:17; 10:5-7; Luka 10:1, 9) Mpo bato oyo bazalaki koyoka ye bálanda masolo na ye malamu mpe yango ekɔta mpenza na mitema na bango, azalaki kosalela elobeli moko ya polele mpo na kobanda masolo, lolenge na ye ya kotuna mituna ezalaki ya mindondo te mpe bandakisa oyo azalaki kopesa ezalaki ya pɛtɛɛ. (Yoa. 4:7-14) Tokosala malamu soki tolandi ndakisa na ye ya kosalela elobeli moko ya pɛtɛɛ ntango tozali kosakola.

3 “Nsango malamu ya Bokonzi” ezali nsango oyo biso tosengeli kosakola. (Mat. 24:14) Koteya kaka Bokonzi ntango ozali kosakola ekosalisa yo mpo ozala na elobeli ya pɛtɛɛ ntango ozali kosolola na moto. Lobelá makambo etali bato oyo bazali koyoka yo. Mbala mingi basi basepelaka koyoka makambo oyo etali libota na bango kasi makambo ya politiki te. Mpo na tata oyo azali na bana, eloko ya liboso oyo ekoki kobenda likebi na ye ezali makambo ya mosala mpe kobatelama ya libota na ye. Bilenge basepelaka mingi na makambo oyo etali avenire na bango; mibange, basepelaka na makambo oyo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango mpe kobatelama na bango. Mbala mingi bato balukaka nde koyoka makambo oyo ezali kosalema esika oyo bango bafandi kasi oyo ezali kosalema na mikili ya mosika te. Nsima ya kosolola na moto makambo oyo bato mingi basepelaka koyoka, yebisá ye mapamboli oyo bato ya botosi bakozwa ntango Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela. Mwa maloba ya polele, oyo eponami malamu, ntango osangisi yango na mokapo moko ya Biblia, ekoki kopesa moto mposa ya koyoka yo.

4 Okoki kobanda lisolo boye:

◼“Nakanisi oyebi malamu ete bato bazali konyokwama na bamaladi mingi oyo ezali kosila te. Kasi oyebi ete Nzambe alaki ete etikali moke akolongola bamaladi ya ndenge nyonso, mpe liwa?” Tiká ye apesa eyano, mpe na nsima tángá Emoniseli 21:3, 4.

5 Tiká ete elobeli ya polele mpe ya pɛtɛɛ oyo okosalela mpo na kobanda masolo esimba makanisi mpe mitema ya bato mingi lisusu na kati ya teritware na bino, osalisa bango báyeba Yehova mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko.​—Yoa. 17:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto