Soki maloba mpo na kobanda lisolo mazali kobimisa matomba, salelá yango!
1 Mbala na mbala, Mosala na biso ya Bokonzi epesaka biso maloba ndenge na ndenge mpo na kobanda lisolo kati na mosala ya kosakola; maloba yango mapesaka biso makanisi ya sika mpo na kolamwisa bosepeli ya bato na ntina na nsango ya Bokonzi. Ntango mosusu tozali kosala milende, sanza na sanza, mpo na koyekola lolenge moko to lolenge mingi ya maloba mpo na kobanda lisolo. Nzokande, basakoli bamonaka ete ntango babandi kosalela lolenge moko ya maloba mpo na kobanda lisolo, balolenge mosusu esili kobimisama na lisolo moko ya sika kati na Mosala na biso ya Bokonzi. Ya solo, moto nyonso te azali na makoki ya koyekola maloba ya sika mpo na kobanda lisolo, liboso ete amesana malamumalamu na maloba oyo mauti kobimisama.
2 Epai mosusu, bankóto ya babongisi-nzela mpe basakoli mosusu bazali kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola. Lisusu, masangá mingi mazali kotala teritware na yango na mobimba, na boumeli ya mwa bapɔsɔ. Na bisika motindo yango, basakoli bakosepela kozala na balolenge ya sika ya maloba mpo na kobanda lisolo na bato mpe makanisi ya sika mpo na koyebisa nsango ya Biblia. Yango ezali kosalisa bango ete bábongisa lisusu mosala na bango. Mosala na bango ya kosakola ekokóma lisusu kosepelisa bango mingi, ekobota mbuma mingi, mpe bakokóma bongo na likoki ya kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango.
3 Atako boni, soko maloba oyo tobongisi mpo na kobanda lisolo makoki kolamwisa bosepeli mpe mazali kobimisa matomba, na bongo tokokóba kosalela yango! Ezali na ntina te kotika kosalela maloba mpo na kobanda lisolo oyo mazali kobimisa matomba. Tósalela maloba yango mpo na mokanda oyo tozali kolakisa na sanza oyo. Ntango tozali kotalela makanisi mauti na Mosala na biso ya Bokonzi, tóbimisa makambo ya ntina oyo tolingi kokotisa kati na maloba na biso mpo na kobanda lisolo.
4 Na bongo, ntango tozali kozwa Mosala na biso ya Bokonzi ya sika, tómikundola ete maloba mpo na kobanda lisolo oyo mapesami kati na yango mazali bobele bandakisa. Soki tokoki kosalela yango, ezali malamu. Kasi soko tozali na maloba mpo na kobanda lisolo, maloba oyo mazali kobimisa matomba kati na teritware na biso, na bongo tósalela yango! Likambo ya ntina ezali ete ‘tókokisa mpenza mosala na biso’ na lolenge ya malamu koleka, kolukáká baoyo babongi na nsango malamu mpe kosalisáká bango ete bákóma bayekoli.—2 Tim. 4:5.