Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/01 lok. 1
  • “Liloba ya Nzambe ezali . . . na nguya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Liloba ya Nzambe ezali . . . na nguya”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • “Liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Saleláká mayele ya kondimisa ntango ozali koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Salelá Biblia malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Okɔtelaka Liloba ya Nzambe?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 5/01 lok. 1

“Liloba ya Nzambe ezali . . . na nguya”

1 Ntoma Paulo akomaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Ebe. 4:12) Alingaki koloba nini na maloba wana? Liloba ya Nzambe to nsango na ye oyo ezali na kati ya Biblia ekoki kobongola mpenza bato. Mayele oyo ezali na kati ya Biblia ezali na nguya ya kobongisa bomoi ya moto. Epesaka libɔndisi mpe elikya oyo esalaka ete bato báya epai ya Yehova Nzambe, Mopesi ya bomoi. Nsango na yango ekoki kotya bato ya mitema sembo na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Nzokande, mpo na komona matomba yango, tosengeli kosalelaka Biblia ntango tozali kopesa litatoli epai ya bato mosusu.

2 Taángá vɛrsɛ moko ya Biblia na libaku nyonso: Emonani ete basakoli mingi basalelaka mpenzampenza lisusu Biblia te ntango bazali kopesa litatoli na ndako na ndako. Ezali mpe bongo mpo na yo? Lokola bato mingi bamonanaka ete bazali na ntango te mpo na masolo milai, ekoki kozala ete ozwi momeseno ya kolakisa kaka mikanda to ya komonisa kaka likanisi moko oyo ezali na vɛrsɛ moko ya Biblia kozanga kotánga yango. Tolendisi basakoli nyonso ete básala makasi mpo na kotángaka ata vɛrsɛ moko ya Biblia ntango bazali kosakola nsango malamu, yango ekopesa nzela na moto oyo azali koyoka amona ete nsango na biso euti mpenza na kati ya Liloba ya Nzambe.

3 Atako bato moke kaka nde batángaka mpenza Biblia, kasi bato mingi bamemyaka yango kaka. Ata bato oyo bazalaka na makambo mingi ya kosala bakoki kolekisa ata miniti moko to mibale mpo na koyoka nsango oyo batángeli bango mbala moko na Liloba ya Nzambe. Soki otángi na esengo nyonso vɛrsɛ moko oyo ebongi mpenza mpe olimboli yango mwa moke, nguya ya Liloba ya Yehova ekoki kobimisa matomba malamu epai ya moto oyo azali koyoka. Kasi ndenge nini okoki kosala mpo ete vɛrsɛ ya Biblia oyo olingi kotángela moto eyokana na maloba na yo ya kobanda lisolo?

4 Mekyá kosala yango ntango ozali kokabola bazulunalo: Mokɛngɛli-motamboli moko asalelaka Makomami malamu ntango azali kokabola bazulunalo. Amemaka Biblia moko ya moke na libenga na ye. Nsima ya kolakisa moto zulunalo mpe kolobela mwa moke lisolo moko oyo ezali na kati, afungolaka Biblia kozanga kokakatana mpe atángaka vɛrsɛ moko oyo eyokani na lisolo yango. Tokoki kosala yango na kotuna kaka motuna lokola, “Okanisi nini na elaka oyo ya kolendisa?” mpe na nsima, totángi vɛrsɛ moko oyo tobongisaki.

5 Ómityela mokano ya kotángela moto nyonso oyo ozali kosolola na ye vɛrsɛ moko to mibale na kati ya Biblia. Nguya na yango oyo elendisaka ekoki kofungolela bato mingi nzela mpo ete báya epai ya Nzambe.​—Yoa. 6:44.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto