Simbá motema ya moto oyo ozali koyekola na ye
1 Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye báteya bato mosusu “bátosa” makambo nyonso oyo atindaki bango. (Mat. 28:19, 20) Mpo moto ‘atosa’ mitinda ya Klisto, mitinda yango esengeli kosimba motema na ye. (Nz. 119:112) Ndenge nini okoki kosimba motema ya moto oyo ozali koyekola na ye Biblia?
2 Sɛngá litambwisi ya Yehova: Kokómisa bato bayekoli ezali mosala ya Nzambe. Ezali mpo na makoki na biso moko te nde tolongaka na mosala yango, kasi mpo na mapamboli na ye. (Mis. 16:14; 1 Kol. 3:7) Yango wana, ntango tozali koteya bato mosusu solo, tosengeli kobondela mpo na kosɛnga lisungi ya Yehova.—Yis. 50:4.
3 Sosolá bindimeli ya moyekoli: Soki toyebi makambo oyo bato bandimaka mpe mpo na nini bandimaka yango, ekoki kopesa biso mayele ya koyeba oyo tosengeli koloba mpo na kosimba mitema na bango. Mpo na nini moyekoli asepelaka mingi na liteya moko boye? Nini etindaki ye andima ete liteya yango ezali ya solo? Soki toyebi yango, ekosalisa biso tóloba na bososoli.—Mis. 17:22, 23.
4 Salelá makanisi oyo ebongi mpe oyo euti na Makomami: Moyekoli asengeli kokanga ntina ya mateya ya solo. (Mis. 17:24-31) Tosengeli komonisa ntina mpenza ya elikya na biso. (1 Pet. 3:15) Kasi, tosengeli ntango nyonso kosala yango na boboto, mpe na motema molai.
5 Tóbakisa bandakisa na mateya na biso: Bandakisa esukaka kaka te na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola, kasi elamwisaka mpe mayoki. Bandakisa esimbaka makanisi mpe motema ya moyekoli. Yesu azalaki kosalela yango mbala na mbala. (Mko. 4:33, 34) Ya solo, mpo bandakisa ebota mpenza mbuma malamu, esengeli koyokana na likambo oyo bozali kolobela, mpe esengeli koyokana na bomoi ya moyekoli.
6 Monisá matomba ya kondima solo: Bato balingaka koyeba matomba oyo bakozwa soki basaleli makambo oyo bazali koyekola. Salisá moto oyo ozali koyekola na ye amona bwanya ya maloba ya Paulo oyo ezali na 2 Timote 3:14-17.
7 Kolɛmba te soki bato mosusu baboi koyoka mateya na yo. Ezali mitema nyonso te nde endimaka. (Mat. 13:15) Kasi, bato mosusu bakómaka mpenza bandimi. (Mis. 17:32-34) Tiká ete milende na yo mpo na kosimba mitema ya bato na nsango malamu esalisa bato mingi ete bándima mpe “bátosa” makambo oyo Yesu atindaki.