Okoki kosala esika mposa ezali makasi?
1 Osilá kokanisa kokende epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi? Soki babengi yo ete “yaká . . . kosunga,” okondima ndenge Paulo andimaki? (Mis. 16:9, 10) Masangá mingi ezali na mposa ya mabota oyo ezali makasi na elimo, mposa ya babongisi-nzela mpo na kosalisa bango básakola na teritware na bango mobimba, to bazali na mposa ya bankulutu mpe basaleli ya misala ya makoki mpo na kotambwisa lisangá. Teritware yango ekoki kozala monene mpe na mwa bingumba to bamboka oyo ezali mosikamosika. Ndako ya Bokonzi ekoki kozala mosika na ntaka ya bakilomɛtrɛ mingi. Misala ya mosuni ekoki kozala mingi te. Mpe mikolo nyonso ekoki kozala kaka ndenge moko te; mikolo mosusu moi ekoki kozala makasi, mikolo mosusu malili makasi to mbula. Okondima koyikela makambo nyonso wana mpiko? Ndenge nini okoki kolonga?
2 Esengeli kozala na kondima mpe na elikya: Na litambwisi ya Nzambe, Abalama atikaki Ulu, engumba na ye, mpe atambolaki kilomɛtrɛ 1 000 mpo na kokende na Halana elongo na mwasi na ye, mwana ya ndeko na ye, mpe tata na ye Tela oyo akómaki mobange. (Gen. 11:31, 32; Neh. 9:7) Nsima ya liwa ya Tela, Yehova ayebisaki Abalama, wana akómaki na mbula 75, ete atika engumba Halana mpe bandeko na ye mpe akende na mokili oyo Nzambe akolakisa ye. Abalama, Salai, mpe Lota “bakamataki nzela na kokende.” (Gen. 12:1, 4, 5) Ya solo, Abalama akendeki te mpo na kosala epai mposa ya basakoli ezalaki makasi. Kasi mobembo na ye esɛngaki likambo moko. Likambo nini?
3 Esɛngaki ete Abalama azala na kondima mpo na kozala na mpiko ya kosala likambo monene wana. Makanisi na ye mpe lolenge ya bomoi na ye esengelaki kobongwana. Asengelaki kotika bandeko na ye, baoyo bazalaki libateli mpo na ye. Kasi, atyaki elikya epai ya Yehova ete akobatela ye na libota na ye. Ndenge moko mpe, bato mingi lelo oyo bazali komonisa elikya na bango epai ya Yehova.
4 Mokumba ya ntango mokuse: Osilá kozwa mapamboli mingi oyo eutaka na kosala na teritware epai basakoli bazalaka te? Na mbula eleki, kati na bitúká 48 ya États-Unis, basakoli 5 699 basakolaki na bateritware 163 kati na bateritware 174 epai basakoli bazalaki te. Basakoli mosusu 5 676 basalisaki masangá 380 mpo na kosakola na bateritware na bango epai basakolaka mbala na mbala te. Mpo na bamosusu, yango esɛngaki kosala mobembo ya bakilomɛtrɛ mingi. Yango ezalaki mpenza na ntina?
5 Ndeko moko na etúká ya Californie oyo akendaki na etúká ya Utah akomaki boye: “Ntango basɛngaki ngai ete nazwa etuluku moko ya bandeko mpo tókende kosala na teritware moko oyo basakolaka mbala na mbala te, nazalaki kokakatana. Kasi nazwaki ekateli ya kondima mokumba yango. Nayokaki mawa mpo na yango te, kasi ebongolaki nde bomoi na ngai. Natɔndaka Yehova mokolo na mokolo mpo na libaku ya kozala kati na bandeko oyo basalaki mobembo yango.” Ndeko moko na etúká ya Floride oyo akendeki na etúká ya Tennessee alobaki ete ezali likambo ya ntina mingi koleka kati na makambo oyo akutanaki na yango na boumeli ya mbula 20 oyo alekisi na kati ya solo! Elenge moko na etúká ya Connecticut oyo akendeki na etúká ya Virginie occidentale alobaki ete: “Yango ezalaki likambo ya malamu koleka makambo nyonso oyo nakutaná na yango na bomoi na ngai!” Basakoli mingi bandimi ete kosala na esika oyo mposa ezali makasi ata mpo na ntango mokuse, esalaki ete básepela lisusu mingi na mosala ya kosakola. Sololá na basakoli oyo basili kosala likambo yango. Okomona ete yango elendisaki bango na elimo mpe bakondima kosala yango lisusu soki libaku emonani.
6 Kondima kosala mpo na mwa ntango epai mposa ezali makasi ekoki kokokisa mpe mokano mosusu. Baoyo bazali kosala yango bakoki kozwa toli oyo ebongi oyo ekosalisa bango ‘bátánga motuya’ ya kokende kofanda epai mosusu.—Luka 14:28.
7 Mokano ya Yehova ezali ete nsango malamu esakolama “na mokili mobimba” liboso ete nsuka eya. (Mat. 24:14) Lokola oyebi yango, soki likoki ezali okondima kokende epai mposa ezali makasi? Mposa ezali na bisika mingi.
8 Kokende kofanda epai mposa ezali makasi: Ozwá pasyo? Leta apesaka yo mwa mbongo mpo na kobikela? Soki te, okoki kozwa bibongiseli mpo na kosala mosala na yo moko? Ozali na likoki ya kofutela ndako yo moko? Soki ozali na likoki ya kokende epai mosusu te, okoki kosalisa moto moko ya libota na yo ete akende kosala epai nyonso oyo mposa ezali makasi?
9 Soki nsima ya kokanisa malamu likambo yango na kati ya libondeli, omoni ete okokoka kokende kosala esika mposa ezali makasi, sololá likambo yango na libota na yo mpe na bankulutu ya lisangá na yo. Na nsima, komá mokanda mpe pesá yango na bankulutu mpo bákoka kotya makambo mosusu oyo etali yo liboso ya kotinda yango na Biro.
10 Makambo nini osengeli kokoma na mokanda yango? Mbula na yo, dati oyo ozwaki batisimo, mikumba oyo ozali na yango na kati ya lisangá, okoyebisa soki obalá mpe soki ozali na bana ya mike. Yebisá esika oyo olingi kokende kosala, na kotalela makoki na yo. Na ndakisa, okoki kofanda esika ya molunge mpe ya malili? Okokoka kofanda na esika oyo ezali likoló ya ngomba? Olobaka lokota mosusu ya bapaya?
11 Ozali na molende mpe oyebi koluka mabaku ya kosakola? Makambo ya bomoi na yo epesi yo nzela ya kosala epai mposa ezali makasi? Soki ezali bongo, boye okomona ndenge Yehova akosopa mapamboli na ye likoló ya baoyo nyonso batii elikya na bango epai na ye wana bazali komonisa elimo ya komipesa!—Nz. 34:8; Mki. 3:10.