Likambo moko ezali kopekisa yo kosakola?
1 Bato mingi bazalaka na makambo mingi ya kosala. Batatoli ya Yehova bazali kati na bato oyo bazalaka mpenza na makambo mingi ya kosala—koyekola Liloba ya Nzambe, koyangana na makita ya lisangá, mpe kobima na mosala ya kosakola. Lisusu, tosalaka mosala ya mosuni, misala ya ndako to koyekola makambo ya kelasi, mpe mikumba mingi mosusu oyo nyonso esɛngaka ntango. Yango ezali mpenzampenza mpasi mpo na batata ya mabota.
2 Na bisika mingi, mikakatano ya nkita ezali kosala ete batata ya mabota básala mosala na boumeli ya bangonga mingi mpo na koleisa mabota na bango. Lokola mosala ya mosuni ezwaka bango ngonga mingi mpe nguya mingi, batikalaka kaka na ngonga moke mpe nguya moke mpo na mosala ya kosakola. Lokola bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya mabota na bango, bamosusu bakanisaka ete bakoki kosakola kaka moke. (1 Tim. 5:8) Ntembe ezali te ete, lelo oyo ezali na mikakatano mingi mpo na kozwa biloko ya kobikela. Kasi mosala ya mosuni esengeli te kopekisa moto asakola nsango malamu. (Mko. 13:10) Yango wana, ekozala malamu ete tótalela malamumalamu makambo ya bomoi na biso.
3 Lokola makambo ya mokili ezali ntango nyonso kobongwana, yango ekoki kotinda tata moko ya libota alekisa ngonga mingi na mosala na ye ya mosuni, na mokano ya kobomba mwa mosolo mpo na makambo oyo ekoki kobimela bango pwasa. (1 Kol. 7:31) Ata soki emonani ete kosala mingi na mosala ya mosuni ekoki kopesa moto bozwi mingi to kopesa ye mabaku mingi ya kominanola mpe kozwa mwa mopɛpɛ, yango ekoki mpenza kobakisa esɛngo mpe bolamu na kati ya libota, soki ezali kozwa ngonga nyonso oyo tokoki kosalela mpo na makambo ya elimo mpe mpo na koyangana na makita? Tosengeli mpenza koboya likambo nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na biso. Tokomonisa ete tozali bato ya mayele soki tolandi toli ya Yesu, ‘tomibombeli biloko na motuya kuna na Likolo’ mpe ‘tozali bazwi epai na Nzambe.’—Mat. 6:19-21; Luka 12:15-21.
4 Luká liboso matomba ya Bokonzi: Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bátya makambo ya elimo liboso ya makambo nyonso. Apesaki bango toli oyo: “Bómitungisa te mpo na koloba ete, Tokolya nini? Soko ete, Tokomɛla nini? Soko ete, Tokolata nini?” Mpo na nini alobaki bongo? Alimboli boye: “Zambi tata na bino na Likolo ayebi ete bozali na bosenga na yango nyonso.” Soki tondimi mpenza likambo yango, eloko moko te ekopekisa biso tosala likambo oyo Yesu alobaki na nsima ete: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso [ya mosuni oyo ezali na ntina mpo na bino] ikobakisama na bino.” Nzambe akosɛnzɛla ete bózala na biloko oyo bosengeli na yango mpo na kobikela! (Mat. 6:31-33) Na ntembe te, oyo ezali soki moke te ntango ya komitungisa mingi mpo na koluka bomoi ya kitoko to kozala na mposa ya kokoma na bomoi ya malamu koleka na ebongiseli ya biloko oyo etikali moke eleka.—1 Pet. 5:7; 1 Yoa. 2:15-17.
5 Ntina ya liboso oyo moto asengeli kosala mosala ya mosuni ezali ya kokokisa bamposa na ye ya mosuni. Kasi tozali na mposa ya biloko ya ndenge nini? Ntoma Paulo akomaki boye: “Awa ezali biso na biloko na kolya mpe na bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.” Tozali koluka kozwa biloko mingi koleka biloko ya kolya mpe bilamba? Soki ezali bongo, nsukansuka tokozwa mpasi oyo Paulo akebisi biso na yango na maloba oyo: “Kasi baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛ.” (1 Tim. 6:8, 9; Mat. 6:24; Luka 14:33) Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali kotika ete bamposa ebele epekisa biso?
6 Soki tomoni ete mosala na biso ya mosuni ezali kotikela biso ntango bobele moke ya kosakola to soki tozali komona lisusu te ntina ya komipesa mpo na nsango malamu, boye tosengeli mpenza kotalela lisusu eloko nini tosengeli kotya na esika ya liboso. (Ebe. 13:15,16) Soki tokomisi bomoi na biso pɛpɛlɛ, yango ekosalisa biso ete tolongola makambo nyonso oyo ekoki kopekisa biso tosakola. Tosengeli kosalela ntango na biso mpe makasi na biso, libosoliboso mpo na matomba ya Bokonzi.
7 Mosala oyo ezali mosala ya mpunda te: Maloba ya Paulo ezali kolendisa biso ntango nyonso ete “bómipesaka ntango nyonso na mosala ya Nkolo. Bóyebaka ‘tè mpasi oyo bomonaka na mosala ya Nkolo ekokende mpamba te.” (1 Bkrt 15:58, boyokani ya sika pe banzembo) “Mosala ya Nkolo” ezali libosoliboso kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Mpo na kosala mingi, tosengeli kobongisa ntango mpo na kobimaka na mosala ya kosakola pɔsɔ nyonso mpe kosala makasi mpo na kosalela ntango yango kaka mpo na mosala ya kosakola. (Ef. 5:15-17) Soki tosali bongo, eloko moko te ekopekisa biso tobima na mosala ya kosakola ezala mosala na biso ya mosuni to makambo mosusu.
8 Soki tozali komipesa mpo na koyebisa solo ya Biblia epai ya bato mosusu, tokozwa esengo mingi oyo eutaka na kopesa. (Mis. 20:35) Soki tozali ntango nyonso kosala mosala ya kosakola Bokonzi, tokoki kozala na elikya mpo na avenire, “mpo ete Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na Nkombo na ye.”—Ebe. 6:10.