Tozali na mosala mingi koleka?
1 Paulo alendisi biso ete ‘tósalaka mosala na Nkolo ntango nyonso.’ (1 Kol. 15:58) Tolendisami mpenza na kosimba manáka ya mokolo na mokolo ya boyekoli na biso moko, ya kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola, ya koyangana ntango nyonso na makita mpe ya kokokisa na motema na biso mobimba misala oyo mipesameli biso kati na lisangá. Kozanga kolobela lisungi oyo tosengeli kopesa na baoyo bazali na yango mposa. Na manáka motindo wana, mbala mosusu tokoki komiyoka ete tolɛmbi mpe komiloba ete ntango ekoki ya koluka mwango ya kotika naino.
2 Mbala mosusu, ekoki kozala likambo ya mayele mpe ya kolongobana kotika misala misusu to kolongola ndambo. Basusu bakanisaka ete basengeli kosala nyonso oyo basɛngi na bango ete básala. Kozanga bokatikati na likambo yango ekoki kozala eutelo ya mikakatano mpe mitungisi oyo mikoki na nsima kopesa mpasi.
3 Tózala na bokatikati: Kosalela toli ya Paulo ya ‘kotalela makambo maleki ntina,’ talá fungola ya bokatikati. (Filp. 1:10, NW) Yango elingi koloba ete tómipesa bobele na makambo oyo masengeli mpenza, na nsima, engebene ntango oyo totikali na yango mpe makoki na biso, nde tósala makambo oyo mazali na ntina moke. Ya solo, mikumba na biso ya libota mizali na esika ya liboso kati na makambo yango ya ntina. Tosengeli mpe kokokisa mikumba misusu ya mosuni. Nzokande, Yesu ateyaki ete makambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso masengeli koyokana na etindá oyo: bólukaka liboso Bokonzi. Tosengeli liboso kosala oyo esengeli na biso mpo na kokokisa mikumba na biso epai na Yehova.—Mat. 5:3; 6:33.
4 Na kozaláká na likanisi wana na motó, tokobongisa manáka na biso ete makóma pɛ́pɛ́lɛ́, kolongoláká kati na yango bisálasala, kominanola mpe makambo oyo makomonana ete mazangi ntina to maleki ndelo. Ntango tozali kobongisa manáka na biso ya pɔ́sɔ, tomibombela ntango esengeli mpo na boyekoli na biso moko, mpo na kosangana na lolenge lobongi na mosala ya kosakola, mpo na koyangana na makita mpe mpo na nyonso oyo ekangisami mpenza na losambo na biso. Ntango oyo etikali ekoki kopesama na misala misusu, na meko oyo yango ezali kosunga mpo na kokokisa mokano na biso ya liboso, ya kozala baklisto oyo bazali na bokatikati oyo bazali komibanzabanza liboso mpo na Bokonzi.
5 Atako bongo, tokoki komona ete mokumba na biso ezali naino kiló. Soki ezali bongo, esengeli na biso ete tóyanola na libyangi ya Yesu: “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Tótala mpe epai na Yehova, “oyo mokolo na mokolo azali kokumba bozito mpo na biso” mpe apesaka nguya epai na moto oyo alɛmbi. Akotika soko moke te ete moyengebene atengatenga, apesi elaka bongo. (Nz. 55:22; 68:19; Yis. 40:29) Tokoki kondimisama ete mabɔndeli na biso makoyokama, na kopesáká biso likoki ya kolendendela kati na bomoi ya Teokrasi oyo etondi na mosala.
6 Soki ezali solo ete kolanda matomba ya Bokonzi ezali kozwa biso ntango mingi koleka, tosengeli kosepela, awa eyebi biso ete kati na Nkolo mosala na biso ezali mpamba te.—1 Kol. 15:58.