Batelá yango
Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
Ndenge nini kosalela siplema oyo?
Ndenge ya kobanda masolo oyo epesami awa, ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi na bambula oyo eleki. Meká nyonso oyo olingi na mosala ya kosakola mpe talá matomba nini okozwa. Batelá siplema oyo, mpe salelaká yango ntango ozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola.
Soki olobi mbala moko likambo oyo oyeli, yango ekoki kosala ete moto asepela koyoka Liloba ya Nzambe. Tuná motuna moko ya polele, na nsima tángá eyano moko ya mokuse oyo Biblia epesi. Okoki komeka kosalela makanisi oyo:
“Ntango okanisaka mpo na mikolo oyo ezali koya, omonaka ete ekozala malamu to oyebaka te ndenge nini ekozala? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia esakolaki banda kala makambo nyonso oyo ezali kobulunganisa makanisi ya bato lelo; emonisaki mpe ndenge nini ekosuka.”—2 Tim. 3:1, 2, 5; Mas. 2:21, 22.
“Lelo oyo bato bazali komitungisa mingi mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Oyebaka ete Nzambe alaki ete akosilisa bamaladi nyonso mpo na libela?”—Yis. 33:24; Emon. 21:3, 4.
“Oyebaka ete Biblia esakoli ete nsukansuka guvɛrnɛma bobele moko nde ekoyangela mabele mobimba?”—Dan. 2:44; Mat. 6:9, 10.
“Soki Yesu nde azalaki koyangela mabele, okanisi ete bomoi elingaki kozala ndenge nini?—Nz. 72:7, 8.
“Bato mingi bazali konyokwama mpo kaka bazali basi to mibali, to mpo na lingomba na bango, to mpo na loposo na bango. Okanisi ete Nzambe andimaka makambo ya ndenge wana?”—Mis. 10:34, 35.
“Toyebi ete Yesu Klisto asalaki makamwisi mingi ntango azalaki awa na mabele. Soki ozalaki na likoki ya kosɛnga ye ete asala likamwisi mosusu, mbɛlɛ osɛngi asala likamwisi nini?”—Nz. 72:12-14, 16.
“Bato mingi lelo oyo balɛmbi koyoka kaka bansango ya mpasi. Bazali na mposa báyebisa bango makambo oyo bakoki kosala mpo na kosilisa bampasi yango. Kasi epai wapi tokoki kozwa makambo yango?”—2 Tim. 3:16, 17.
“Oyebaka Bokonzi oyo osambelaka mpo na yango na Libondeli ya Nkolo to Tata wa Biso?”—Emon. 11:15.
Ndenge ya kobanda lisolo
Mituna oyo ezali awa na nse, euti na buku Comment raisonner; tomonisi mpe lokasa epai eyano mokomoko ezali:
Bato malamu nyonso bakokende likoló? (rs 61)
Bato basengeli kokende na likoló mpo na kozwa bolamu ya solo? (rs 62)
Tozali mpenza na bilembeteli oyo endimisi biso ete Nzambe azali? (rs 106)
Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso? (rs 107)
Nzambe azali moto ya solo mpenza? (rs 108)
Mpo na nini esengeli koyeba mpe kosalela nkombo mpenza ya Nzambe? (rs 200)
Yesu Klisto azali Nzambe? (rs 205)
Mwasi na mobali basengeli kosala nini mpo na kobongisa libala na bango? (rs 229)
Mpo na nini mabe etondi na mokili (rs 237)
Nani azali kotambwisa makambo ya mokili oyo: Nzambe to Satana? (rs 250)
Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? (rs 253)
Ezalela ya bakufi ezali nini? (rs 255)
Nzambe andimaka mangomba nyonso? (rs 310)
Ndenge nini moto akoki koyeba lingomba ya solo? (rs 316)
Bokonzi ya Nzambe ekosala nini? (rs 336)
Satana azali mpenza na bopusi makasi na mokili ya lelo? (rs 368)
Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? (rs 375)
Bomoi ya moto ezali na ntina nini? (rs 434)
Makanisi oyo ekoki kosalisa biso mpo na kolakisa mwa buku Azali kosɛnga
“Na ntembe te oyebi ete bato mingi bandimaka ete Nzambe azali. Bato nyonso oyo bandimaka ye bayebi ete Nzambe asɛngaka eloko moko epai na biso. Kasi Nzambe asɛngaka mpenza nini epai na biso? Na motuna oyo bato mingi bapesaka biyano ndenge moko te.” Nsima na yango, lakisá ye mwa buku Azali kosɛnga; fungolá yango na liteya 1, mpe bótalela liteya yango.
“Lokola mabota ezali kokutana na mikakatano mingi lelo oyo, omituná naino te soki nini mpenza ezali sɛkɛlɛ ya bolamu na libota?” Tiká moto yango ayanola; na nsima, monisá ye ete Nzambe azali komonisa biso na kati ya Biblia sɛkɛlɛ mpenza ya bolamu na libota. Tángá Yisaya 48:17. Na nsima, fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 8 mpe lobelá ndambo ya mikapo ya Biblia oyo epesami kuna, mikapo yango ezali kopesa moto mokomoko ya libota toli ebongi. Tángá mituna oyo ezali na ebandeli ya liteya. Sɛngá moto yango soki akosepela kotánga biyano ya mituna yango.
“Mwa buku oyo ezali na mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. Na lokasa mokomoko, okokuta biyano na mituna oyo ezali kotungisa bato banda bambula ebele. Na ndakisa: Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?” Fungolá liteya 5, mpe tángá mituna oyo ezali na ebandeli ya liteya yango. Tuná moto oyo ozali kosolola na ye motuna nini esepelisi ye mingi; na nsima, tángá paragrafe moko to baparagrafe oyo etaleli motuna yango, tángá mpe bavɛrsɛ oyo ebongi. Yebisá ye ete ndenge omonisi ye, ezali mpasi te mpo na kozwa biyano ya malamu na mituna oyo etikali. Tuná ye soki akondima ozonga mbala ya nsima mpo na kotalela motuna mosusu.
“Na makanisi na yo, mpo na nini biteyelo etondi na mobulu lelo oyo? Ezali mpo baboti bazali koteya bana na bango malamu te? To okanisi ete euti nde na makambo mosusu, makambo lokola misala ya Zabolo?” Tiká ye apesa eyano. Soki moto yango alobi ete ezali kouta na Zabolo, tángá Emoniseli 12:9, 12. Monisá polele mosala oyo Zabolo azali kosala mpo na kobimisa yikiyiki na mokili. Na nsima, fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 4, mpe tuná moto yango soki alukaka koyeba epai wapi Zabolo autá. Tángá paragrafe mibale ya liboso mpe bótalela yango. Soki moto yango alobi ete biteyelo etondi na mobulu mpo “baboti bazali koteya bana na bango malamu te,” tángá 2 Timote 3:1-3 mpe monisá polele bizaleli oyo ezali kosala ete baboti bákoka te koteya bana na bango malamu. Na nsima, fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 8, tángá paragrafe 5, mpe kobá na lisolo.
“Na makanisi na yo, ezali mpenza na ntina ya kotalela Mozalisi ete apesa biso mayele oyo tozali na mposa na yango mpo na kozala na bomoi malamu na libota?” Tiká moto yango ayanola. Na nsima, lakisá mwa buku Azali kosɛnga. Fungolá yango na liteya 8 mpe limbolá ete kati na yango ezali na mitinda oyo euti na kati ya Biblia mpo na moto mokomoko ya libota. Sɛngá ye soki akondima olakisa ye ndenge ya kosalela mwa buku yango elongo na Biblia mpo na kozwela yango matomba mingi.
“Lokola na moi ya lelo tozali kokutana na mikakatano ebele ebele, okanisi ete libondeli ekoki mpenza kosalisa biso? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi balobaka ete libondeli epesaka bango makasi. [Tángá Bafilipi 4:6, 7.] Atako bongo, moto akoki komona ete azwaka biyano na mabondeli na ye te. [Fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 7.] Mwa buku oyo ezali kolimbola ndenge nini libondeli ekoki mpenza komemela biso matomba.”
“Tozali kosolola na bazalani na biso mpo na koyeba ntina oyo esali ete mangomba ezala mingi lelo oyo na mokili; nzokande, Biblia ezali kaka moko. Na makanisi na yo, mpo na nini mangomba etondi boye? [Tiká ye apesa eyano. Fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 13, mpe tángá mituna oyo ezali na ebandeli.] Okozwa biyano ebongi na mituna yango soki otángi liteya oyo.”
Nsima ya kopesa moto Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, tuná ye soki akolinga otángela ye paragrafe moko ya mokuse. Soki andimi, fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 5. Lakisá mituna oyo ezali na ebandeli ya liteya, mpe sɛngá ye ayoka malamu ntango okotánga paragrafe 1 mpo ete apesa eyano na motuna ya liboso. Nsima ya kotánga paragrafe yango, tuná motuna yango mpe tiká ye apesa eyano. Tuná ye soki akondima kotikala na mwa buku yango; soki andimi, zwá bibongiseli mpo na kozongela ye lisusu mpo na kozwa biyano na ye na mituna mibale oyo elandi.
Makanisi oyo ekoki kosalisa biso mpo na kolakisa buku Boyebi
Wana ozali na Biblia na yo na mabɔkɔ, bandá lisolo boye: “Lelo oyo, tozali kotángela moto nyonso na balabala na bino vɛrsɛ moko ya Biblia. Vɛrsɛ yango elobi boye . . . ” Tángá Yoane 17:3, mpe na nsima tuná motuna oyo: “Omoni likambo oyo balaki biso soki tozwi boyebi oyo esengeli? [Tiká ye apesa eyano.] Moto akoki kozwa boyebi yango wapi?” Nsima ya koyoka eyano na ye, lakisá ye buku Boyebi mpe lobá boye: “Buku oyo ezali kolobela boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko na boye ete ezali koyanola na mituna oyo bato mingi bamitunaka mpo na Biblia.” Lakisá ye lokasa oyo ezali komonisa makambo mazali na kati ya buku, mpe tuná moto yango soki asilá kokanisa ata na likambo moko na kati ya masolo nyonso oyo etandami wana.
“Osilá komituna soki Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na kozanga bosembo mpe bampasi oyo bato mosusu to mpe biso moko tozali kokutana na yango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali koyebisa biso ete Nzambe alingaka biso mpe ete akosunga biso na ntango ya mpasi.” Tángá mwa bavɛrsɛ mosusu ya Nzembo 72:12-17. Fungolá buku Boyebi na mokapo 8, mpe monisá ete buku yango ezali kopesa eyano oyo ezali kobɔndisa mpenza na motuna oyo ebele ya bato batunaka: “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?” Soki likoki ezali, bólobela mwa makanisi ya Biblia oyo ezali na baparagrafe 3 kino 5; soki likoki ezali te, bósala yango ntango okozongela ye.
“Biso nyonso tosili kokufela bandeko to baninga. Kasi osilá komituna soki tokomona bango lisusu? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu amonisaki ete bandeko to baninga na biso oyo bakufá bakoki kozonga lisusu na bomoi. [Tángá Yoane 11:11, 25, 44.] Ata soki likambo yango esalemaki kala mpenza, kasi yango ezali komonisa oyo Nzambe alaki ete akosala mpo na biso.” Fungolá buku Boyebi na elilingi oyo ezali na lokasa 85, mpe tángá maloba oyo batii likoló ya elilingi yango. Na nsima lakisá elilingi oyo ezali na lokasa 86, mpe lobelá yango. Na nsima, bongisá likambo oyo bokosolola ntango okozongela ye; mpo na yango, okoki kotuna ye motuna oyo: “Okosepela koyeba ntina oyo bato banunaka mpe bakufaka?” Zongelá ye mpo bótalela elongo mokapo 6.
“Osilá komituna mpo na nini bato balingaka kozala na bomoi molai?” Nsima ya koyoka eyano na ye, fungolá buku Boyebi na mokapo 6, mpe tángá paragrafe 3. Pesá makanisi ya bavɛrsɛ oyo epesami kuna. Salelá mituna mibale oyo ezali na nsuka ya paragrafe yango mpo na kotuna moto yango soki akolinga koyeba biyano ya mituna yango. Soki andimi, bótalela mwa baparagrafe oyo elandi.
“Tozali kotuna bato soki bandimaka likambo oyo . . . ” Tángá Genese 1:1, mpe na nsima tuná boye: “Yo mpe ondimi likambo yango?” Soki moto yango andimi, na nsima lobá boye: “Ngai mpe nandimi yango. Kasi, okanisi ete soki Nzambe azalisaki biloko nyonso, ye mpe moto asali ete mabe ezala?” Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá Mosakoli 7:29. Fungolá buku Boyebi na mokapo 8, mpe tángá paragrafe 2. Soki moto yango andimi te likambo oyo ezali na Genese 1:1, lendisá ye atalela bilembeteli oyo ezali komonisa ete Mozalisi azali solo.—Talá buku Comment raisonner, nkasa 72-74.
“Lokola bizaleli malamu ezali kobongwana nokinoki, yo mpe ondimi ete tosengeli kozala na eloko moko oyo tosengeli kotyela motema, mpo etambwisaka bomoi na biso? [Tiká ye apesa eyano.] Atako Biblia ezali buku oyo eumeli mingi koleka babuku mosusu nyonso, ezali kopesa toli oyo ebongi mpo na ntango na biso mpe mpo na kozala na esengo na libota.” Na nsima, fungolá buku Boyebi na mokapo 2, mpe tángá paragrafe 10 mpe fraze ya liboso na paragrafe 11; tángá mpe 2 Timote 3:16, 17.
“Olingi koyeba soki bomoi na biso mpe mabele ekozala ndenge nini na mikolo oyo ezali koya? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi yango na liloba moko kaka—Paladiso! Ezali kuna nde esika Nzambe atyaki mobali ya liboso na mwasi na ye ntango azalisaki bango. Talá ndenge esika yango ekokaki kozala.” Fungolá buku Boyebi na lokasa 8, mpe tángá paragrafe 9, na nse ya motó ya likambo moke “Bomoi kati na Paladiso.” Na nsima, bótalela makambo oyo ezali na paragrafe 10, mpe bótánga vɛrsɛ ya Yisaya 55:10, 11 oyo etyami kuna. Sɛngá ye ete bókoba na paragrafe 11 kino 16 mpo na koyeba ndenge bomoi ekozala na kati ya Paladiso oyo ekozonga lisusu.
Ntango ozongeli bato oyo otikelaki bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká!, okoki koloba boye:
“Ntango tokutanaki na mbala ya liboso, nasepelaki kotikela yo zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ntango mosusu omonaki bakómá na ebandeli ya zulunalo yango ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Lelo nasepeli kolimbwela yo soki Bokonzi yango ezali nini mpe makambo oyo yango ekosala mpo na yo mpe mpo na libota na yo.” Na nsima, fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 6; tángá mpe lobelá yango na kotalela ntango oyo moto azali na yango.
“Nayaki kotala yo eleki mpenza mikolo mingi te mpe natikelaki yo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!. Bazulunalo yango elendisaka bato bámemya Biblia mpe bálanda mitinda oyo yango epesaka na oyo etali etamboli malamu. Lokola nayebi ete esengeli moto nyonso akanga ntina ya makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe, yango wana nazongeli yo mpo na komonisa yo likambo moko oyo ekosalisa yo okanga ntina ya makambo yango.” Lakisá mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi, mpe lendisá ye andima koyekola Biblia.
Ntango ozali kolakisa buku nyonso ya kala ya nkasa 192, okoki koloba boye:
“Lelo oyo, bato mingi bazali koloba ete esengeli moto atánga kolasi ya malamu. Mpo na yo, kelasi nini moto asengeli kotánga mpo azala mpenza na esengo mpe na bomoi ya malamu? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 9:10, 11.] Buku oyo [Pesá motó ya likambo ya buku oyo ozali kolakisa] ezali kolobela makambo oyo ezali na Biblia. Buku oyo ezali komonisa esika bobele moko oyo epesaka boyebi oyo ekoki komema na bomoi ya seko.” Pesá ndakisa moko ya polele oyo ezali na kati ya buku yango, mpe lendisá ye atánga yango.
Mikanda mosusu
Tokoki kokuta lolenge ya kobanda lisolo mpo na kolakisa babuku to mwa babuku mosusu na kati ya Index des publications de la Société na nse ya motó ya likambo:
Présentation
Liste par publication
Ndenge ya kobanda koyekola na moto ntango bokutani mbala ya liboso
Mpo na kobanda koyekola na moto Biblia ntango bokutani mbala ya liboso, meká kosalela maloba oyo:
“Oyebi ete kaka na miniti moke okoki kozwa eyano na motuna moko ya ntina oyo etali Biblia? Na ndakisa, . . . ” Na nsima, tuná motuna moko oyo ezali na ebandeli ya liteya moko na kati ya mwa buku Azali kosɛnga; poná motuna oyo okanisi ete ekosepelisa moto oyo ozali kosolola na ye.
“Naleki awa mpo na komonisa yo ndenge toyekolaka na bato Biblia kozanga kosɛnga mbongo. Nakolakisa yo yango na boumeli ya miniti mitano mpamba. Okoki kopesa ngai miniti mitano mpo na yango?” Soki moto yango andimi, salelá liteya 1 na mwa buku Azali kosɛnga mpo na kolakisa ye ndenge boyekoli yango esalemaka; na liteya yango, poná kaka vɛrsɛ moko to vɛrsɛ mibale oyo okotánga. Na nsima, tuná boye: “Mokolo nini okoki kopesa ngai lisusu miniti 15 mpo tótalela liteya ya mibale?”
“Bato mingi bazalaka na Biblia, kasi bayebaka te ete ezali kopesa biyano na mituna ya ntina oyo biso nyonso tomitunaka na oyo etali bomoi na biso na mikolo oyo ezali koya. Na lisalisi ya mokanda oyo [mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi], okoki koyeba mateya ya ebandeli ya Biblia nsima ya mwa basanza soki ozali kolekisa ngonga moko mpamba na pɔsɔ mpo na koyekola. Nakosepela kolakisa yo ndenge boyekoli yango esalemaka.”
“Nayei kotala yo mpo na kosɛnga yo oyekola Biblia na ndako na yo kozanga kofuta mbongo. Soki opesi ngai nzela, nakozwa kaka miniti moke mpo na kolakisa yo ndenge oyo bato na mikili soki 200 bazali koyekola Biblia na bandako na bango na mabota na bango. Kati na masolo oyo batandi awa, tokoki kotalela lisolo nyonso oyo yo olingi. [Lakisá ye, na kati ya buku Boyebi, lokasa ya ‘makambo mazali na kati.’] Lisolo nini esepelisi yo mingi?” Tikelá ye ntango ya kopona. Fungolá buku na mokapo oyo aponi, mpe bóyekola na ye yango banda na paragrafe ya liboso.
“Nateyaka bato Biblia kozanga kosɛnga mbongo mpe nakoki kobakisa bato mosusu oyo balingi koyekola. Nasalelaka buku oyo mpo na koyekola na bato. [Lakisá buku Boyebi.] Mateya yango eumelaka kaka mwa basanza mpe etalelaka mituna lokola oyo: Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? Nini ekómelaka balingami na biso bazali kokufa? Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe? Nakoki kolakisa yo ndenge tosalaka boyekoli yango?”
Soki lolenge moko ya kobanda lisolo ezali kosala ete bato mingi básepela na nsango oyo omemeli bango, landá kosalela yango! Kasi sanza na sanza, osengeli koyokanisa maloba yango na mokanda oyo esengeli kolakisa.