Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/02 lok. 8
  • Tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • ‘Tósalela Yehova na esengo’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Esengo—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Tósalela Yehova na esengo na motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tosalela Jéhovah na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 3/02 lok. 8

Tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola

1 Koyebisa bato mosusu nsango malamu epesaka esengo, yo mpe oyokaka esengo yango? Soki tokebi te, mokili oyo etondi na makambo mabe ekoki kolɛmbisa mposa na biso ya kosakola mpe kosala ete tóbungisa esengo na biso. Kosakola na teritware oyo bato bazali na mitema makasi ekoki mpe kolɛmbisa biso. Makambo nini mpenza tokoki kosala mpo tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola?

2 Tózala na makanisi ya malamu: Kozala ntango nyonso na makanisi ya malamu esalisaka mpenza. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya komanyola likoló na libaku malamu oyo tozali na yango ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Kol. 3:​9, NW) Yesu mpe azali elongo na biso mpo na kokokisa mosala yango. (Mat. 28:20) Atindelaka mpe biso limpinga ya baanzelu mpo básungaka biso. (Mat. 13:​41, 49) Tokoki bongo kondimisama ete milende na biso ezali kotambwisama na Nzambe. (Emon. 14:​6, 7) Na yango, ata soki bato bayambi mosala na biso ndenge nini, kasi kuna na likoló bazali kosepela mingi mpenza mpo na yango!

3 Tómibongisa malamu: Komibongisa malamu ebakisaka mpe esengo na biso. Komibongisa mpo na mosala ya kosakola esɛngaka mpenza makambo mingi te. Esɛngaka kaka mwa miniti moke mpo na kotalela, na kati ya bazulunalo ya sika to na kati ya mokanda oyo tozali kolakisa na sanza oyo tozali, mwa makanisi oyo tokosolola yango na bato. Poná lolenge moko ya kobanda lisolo kati na oyo nyonso batandi na eteni “Ndenge ya kolakisa bazulunalo,” oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Talá siplema ya sanza ya Yanuali 2002 oyo ezali na motó ya likambo “Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola,” to mpe talá na buku Comment raisonner mpo na kozwa lolenge moko ya malamu ya kobanda lisolo. Soki ozali kokoka te kosakola malamu mpo na ntembe moko oyo bato ya teritware na bino bazali kobimisa mbala mingi, bongisá ndenge okosala soki ntembe yango ebimi mpe luká kobenda likebi na bango na lisolo moko oyo ekosepelisa bango. Buku Comment raisonner esalisaka mingi mpo na koyeba kopesa eyano ya ndenge wana. Soki tosaleli mikanda oyo touti kolobela, tokobanga eloko moko te mpe tokosakola na esengo.

4 Tóbondela na etingya: Libondeli ezali na ntina mingi mpo na kobatela esengo. Lokola tozali kosala mosala ya Yehova, tosengeli kobondelaka ye apesa biso elimo na ye, oyo moko na mbuma na yango ezali esengo. (Gal. 5:22) Yehova akopesa biso makasi mpo tókoba kosakola. (Filp. 4:13) Kobondela mpo na mosala na biso ya kosakola ekoki kosalisa biso tókoba kozala na makanisi ya malamu ntango tokutani na makambo oyo esepelisi biso te. (Mis. 13:52; 1 Pet. 4:​13, 14) Soki babangisi biso, libondeli ekoki kosalisa biso tózala ntango nyonso na mpiko mpe na esengo mpenza.​​—⁠Mis. 4:⁠31.

5 Tóluka mabaku ya kopesa litatoli: Ya solo, mosala na biso ya kosakola epesaka biso esengo mingi ntango tozali kokutana na bato mpe kopesa bango litatoli. Okoki kozwa matomba mingi lisusu soki obongoli programɛ na yo mpo ete okoka kosakola ndako na ndako na ngonga mosusu, ntango mosusu nsima ya midi ntango moi ebandi kokita, to na mpokwa mpenza. Ntango nyonso oyo otambolaka na balabala, oyo okendaka kosomba biloko, oyo okɔtaka na bisi, to ntango otambolaka na parke, okutanaka na bato. Mpo na nini te kobongisa mwa maloba ya kobanda na yango lisolo mpe kozwa likanisi ya kosolola na baoyo bazali komonana ete bakoki koyoka yo? To ekoki kozala ete osalaka to okendaka kelasi, kuna osololaka na bato mosusu mikolo nyonso. Okoki kopesa bango litatoli soki kaka obimisi lisolo moko oyo etali Makomami, oyo ezali kolamwisa mposa na bango. Okokuta makanisi ya malamu na lokasa ya liboso ya siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002. Batoli oyo nyonso soki olandi yango, ekoki mpenza kobakisela yo esengo na mosala ya kosakola.

6 Lokola esengo esalisaka biso tóyika mpiko, tosengeli mpenza kobatela yango! Soki tosali bongo, tokozwa mbano monene ntango mosala na biso ya kosakola, oyo ekozongelama lisusu te, ekokóma na nsuka na yango. Elikya wana ya kozwa mbano, yango moko ekoki kobakisa esengo na biso na mosala ya kosakola.​​—⁠Mat. 25:⁠21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto