Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/03 lok. 8
  • ‘Tósalela Yehova na esengo’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tósalela Yehova na esengo’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Esengo—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Tósalela Yehova na esengo na motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tosalela Jéhovah na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 10/03 lok. 8

‘Tósalela Yehova na esengo’

1. Nini ekoki kopesa basaleli ya Yehova esengo mingi?

1 Ntoma Paulo akomaki ete: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo. Nakoloba lisusu ete, Bósepelaka!” (Filp. 4:4) Libaku malamu oyo tozwi ya kosakola nsango malamu mpe ya kosalisa bato oyo bakokani na bampate ete básambela Yehova epesaka biso esengo mingi. (Luka 10:17; Mis. 15:3; 1 Tes. 2:19) Kasi, tokoki kosala nini soki tomoni ete, na bantango mosusu, tozali na esengo mpenza te na mosala ya kosakola?

2. Ndenge nini koyeba moto oyo apesi biso mokumba ya kosakola ekoki kosalisa biso tózala na esengo?

2 Ezali mosala ya Nzambe: Tóbosana te ete Yehova nde apesi biso mokumba ya kosakola. Ya solo, tozali mpenza na libaku malamu ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli! (1 Kol. 3:9) Klisto Yesu azali elongo na biso na mosala yango oyo ekozongelama lisusu te. (Mat. 28:18-20) Baanzelu mpe bazali komipesa na mosala yango mpe bazali kosala elongo na biso na mosala monene ya kobuka mbuma na elimo oyo ezali kosalema lelo. (Mis. 8:26; Emon. 14:6) Makomami mpe makambo oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango ezali komonisa mpenza polele ete Yehova nde azali kotambwisa mosala yango. Yango wana, ntango tosakolaka, tokendaka “lokola bato batindami na Nzambe, na miso ya Nzambe, esika moko na Klisto.” (2 Kol. 2:17) Oyo nde ntina monene ya kozala na esengo!

3. Libondeli ezali na ntina nini soki tolingi kobatela esengo na biso na mosala ya Nzambe?

3 Libondeli ezali na ntina mingi soki tolingi kobatela esengo na biso na mosala ya Nzambe. (Gal. 5:22) Tokoki kosala mosala ya Nzambe kaka na makasi oyo ezali kouta epai na ye; yango wana, tosengeli kobondela ye na etingya ete apesa biso elimo na ye oyo apesaka na bokabi mpenza na bato nyonso oyo basɛngaka ye yango. (Luka 11:13; 2 Kol. 4:1, 7; Ef. 6:18-20) Soki tozali kobondela mpo na mosala na biso ya kosakola, yango ekosalisa biso tólanda kozala na makanisi ya malamu ata soki bato bayambi biso malamu te. Yango mpe ekosalisa biso tólanda kosakola na molende mpe na esengo mpenza.​—Mis. 4:29-31; 5:40-42; 13:50-52.

4. Ndenge nini komibongisa malamu esalisaka biso tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola, mpe makambo nini mpenza tokoki kosala ntango tozali komibongisa?

4 Tómibongisaka malamu: Lolenge malamu ya kobakisa esengo na biso ntango tozali na mosala ya kosakola ezali ya komibongisa malamu. (1 Pet. 3:15) Komibongisa yango esɛngaka mpenza ntango mingi te. Esɛngaka kaka mwa miniti moke mpo na kotalela makanisi oyo epesamaki mpo na oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo tozwi sika to mikanda mosusu oyo tokani kolakisa. Mpo na koyeba lolenge ya kobanda lisolo oyo ebongi mpenza, okoki kotala buku Comment raisonner to Mosala na biso ya Bokonzi ya basanza oyo eleki. Basakoli mosusu bamonaka malamu kokoma mwa maloba ya kobanda lisolo na papye. Babwakaka mwa liso na papye yango mpo bábosana te makambo balingi koloba. Yango esalisaka bango bálongola kobanga mpe básakola na mpiko.

5. Matomba nini esengo epesaka biso mpe bato mosusu?

5 Esengo epesaka matomba mingi. Soki tozali na esengo, yango ekosala ete bato básepela koyoka nsango na biso. Esengo epesaka biso makasi ya koyika mpiko. (Neh. 8:10; Ebe. 12:2) Na koleka, mosala oyo tosalaka na esengo mpenza epesaka Yehova nkembo. Na yango, tiká ete ‘tósalela Yehova na esengo.’​—Nz. 100:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto