Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/02 lok. 7
  • Basepeli na yango mingi mpenza!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basepeli na yango mingi mpenza!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Kasɛti-video oyo tosengeli kotyela yango likebi mpenza
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solosolo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Poná malamu baninga na yo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 10/02 lok. 7

Basepeli na yango mingi mpenza!

1 Bipai nyonso, mabota ya baklisto bamonisaki na esengo mpenza botɔndi na bango mpo na kasɛti video Les jeunes s’interrogent. . . Comment se faire de vrais amis? (Mituna oyo bilenge batunaka​​—⁠Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solosolo?) Tata moko na États-Unis alobaki ete, nsima ya kotala yango, bana na ye ya mibali bafandaki nyɛɛ​​—⁠makambo nyonso oyo ezali na kasɛti video yango ezali oyo bakutanaka na yango! Lapolo moko euti na Malawi eyebisi ete bandeko na biso mibali mpe basi oyo bazali bilenge kuna bakutanaka mpe na makambo oyo ezali na kasɛti video yango mpamba te baninga na bango na eteyelo balukaka kotinda bango na kolanda makambo na bango ya mabe. Tata moko na Allemagne alobelaki kasɛti video yango boye: “Namoni ete ezali eyano na mabondeli na ngai.” Elenge mwasi moko alobaki ete: “Natɔndi bino mpo bokundweli ngai ete Yehova amibanzabanzaka mpo na ngai.” Nkulutu moko na Nouvelle-Zélande apesaki lapolo oyo: “Esalisaki moko na bilenge na biso azonga na nzela ya bomoi.” Mwasi moko ya libala atalaki yango mpe alobaki boye: “Nazali mpenza na mposa ete bilenge nyonso oyo bazali na kati ya solo bátala kasɛti video oyo mpe báyoka mposa ya kofandisa solo na motema na bango mpenza!” Mpo na nini te kotala yango lisusu na kati ya libota? Mpe na nsima, bósolola na kosaleláká mituna oyo elandi.

2 Maloba ya ebandeli: Moninga ya solosolo ezali nani?​​—⁠Mas. 18:⁠24.

3 Makambo oyo ebebisaka boninga: Ndenge nini okoki kolonga mawa oyo ebimaka mpo baninga balingi kozala na yo te? (Filp. 2:⁠4) Mpo na nini osengeli kozala na mokano ya kobongisa bomoto na yo, mpe nani akoki kosalisa yo osala yango? Makambo nini ekoki kozala libaku mpo na kobanda boninga na bato mosusu, mpe okoki kozwa baninga wapi?​​—⁠2 Kol. 6:⁠13.

4 Boninga na Nzambe: Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe, mpe mpo na nini ebongi koboma nzoto mpo na kosala yango? (Nz. 34:⁠8) Banani bakoki mpenza kosalisa yo okolisa boninga na yo na Nzambe?

5 Motindo ya baninga ya mabe: Banani bazali baninga ya mabe? (1 Kol. 15:33) Na ndenge nini baninga ya mabe bakoki komema na liwa ya elimo? Lisolo ya Dina oyo ezali na Biblia eteyi yo makambo nini?​​—⁠Gen. 34:​1, 2, 7, 19.

6 Likambo ya mawa na mikolo na biso: Lokola Tara amiyokaki ete azalaki ye moko, yango esalaki ye nini? Ndenge nini amonisaki ntina oyo amipesaki na baninga ya mokili? Batyaki ye na makama nini? Mpo na nini baboti na ye bamonaki te likama oyo azalaki na yango, kasi bamonisaki ezaleli nini ntango basalisaki ye mpo elimo na ye ezonga makasi? Ndenge nini ndeko mwasi moko mobongisi-nzela amonisaki ete azali moninga ya solosolo ya Tara? Mpo na nini baklisto basengeli kolanda likebisi oyo ezali na Masese 13:20 mpe Yilimia 17:9? Wapi makambo ya ntina mingi oyo Tara ayekolaki?

7 Mpo na kosukisa: Makambo nini oyekoli na kasɛti video oyo? Ndenge nini okoki kosalela yango mpo na kosalisa bato mosusu?​​—⁠Nz. 71:⁠17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto