Kasɛti-video oyo tosengeli kotyela yango likebi mpenza
“Kasɛti-video yango ezali mpenza kotinda moto akanisa malamumalamu!”
“Kasɛti-video yango esimbaki mpenza motema na ngai!”
“Nasepelaki mingi!”
1 Yo mpe oyokaki ndenge wana mbala ya liboso oyo otalaki kasɛti-video Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu? (na Lifalanse) Eleki mwa bambula, ndeko mobali moko elenge akutanaki na mikakatano mingi mpo na baninga oyo amiponelaki. Baninga yango basalaki ete asepela lisusu na solo te, mpe abebisaki boyokani na ye na Yehova. Na nsima, kasɛti-video Baninga ya malamu ebimaki. Elenge yango akomaki boye: “Natalaki kasɛti-video yango mbala na mbala, mpe mbala nyonso oyo natalaki yango, mai ya miso ezalaki kobima ngai. Natɔndaki Yehova mpo na lisalisi wana oyo nazwaki na ntango ebongi.” Kasɛti-video yango esalisaki ye abongola bomoi na ye mpe azwa baninga ya malamu. Abakisaki ete: “Emonani mpenza ete boyebi malamu makambo oyo bilenge bazali kokutana na yango.” Baboti mpe bilenge, mpo na nini te kotala kasɛti-video yango lisusu na boyekoli na bino ya libota oyo ekolanda? Tɛlɛmisá yango na nsuka ya eteni mokomoko, mpe bóyanola na ndenge ya polele na mituna oyo ezali na baparagrafe elandi.
2 Maloba ya ebandeli: Moninga ya solosolo ezali nani?—Mas. 18:24.
3 Makambo oyo esalaka ete moto azwa baninga te: Soki ozali na mawa mpo ozangi baninga, okoki kosala nini? (Filp. 2:4) Mpo na nini osengeli kondima kobongola bomoto na yo, mpe nani akoki kosalisa yo osala yango? Nini ekoki kosalisa yo okóma na baninga mingi, mpe okoki kozwa baninga yango wapi?—2 Kol. 6:13.
4 Kokóma moninga ya Nzambe: Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe, mpe yango ekopesa yo matomba nini? (Nz. 34:8) Banani bakoki mpenza kosalisa yo okolisa boninga na yo na Nzambe?
5 Baninga ya mabe: Baninga ya mabe ezali banani? (1 Kol. 15:33) Ndenge nini baninga ya mabe bakoki kobebisa moto na elimo? Lisolo ya Dina oyo ezali na Biblia, eteyi yo nini?—Gen. 34:1, 2, 7, 19.
6 Filme oyo ezali liteya mpo na biso lelo oyo: Lokola Tara amiyokaki ete azali ye moko, asalaki nini? Bantina nini apesaki mpo na kolongisa boninga na ye na bilenge ya mokili? Bilenge yango balingaki kokweisa ye na makambo nini ya mabe? Mpo na nini baboti na ye bayebaki te likama oyo ezalaki koyela ye, kasi bamonisaki ezaleli nini mpo na kosalisa ye azongela makasi na elimo? Ndenge nini ndeko mwasi moko mobongisi-nzela amonisaki ete azali moninga ya solosolo ya Tara? Mpo na nini baklisto basengeli kolanda likebisi oyo ezali na Masese 13:20 mpe Yilimia 17:9? Liteya nini ya ntina mingi Tara azwaki?
7 Mpo na kosukisa: Makambo nini oyekoli na kasɛti-video oyo? Ndenge nini okoki kosalela yango mpo na kosalisa bato mosusu?—Nz. 71:17.