Teritware ya lisangá na bino eleki monene?
1 Yesu apesaki litatoli na teritware moko monene ya Yisalaele ya kala oyo ebandaki na bingumba ya Yudea tii na bamboka mikemike ya Galilai. (Mko. 1:38, 39; Luka 23:5) Biso mpe tosengeli koyebisa nsango malamu epai ya bato ebele koleka soki likoki ezali. (Mko. 13:10) Kasi, kosala yango ekoki kozala mpasi. Mpo na nini?
2 Masangá mingi ezali na bateritware ya minene mpenza, oyo ezali mingimingi bamboka oyo ezali mosika na bingumba. Masangá oyo basalaka makita na bango na monɔkɔ ya bapaya bakoki kosakola na bingumba minene oyo etondi na bato mpo na koluka baoyo balobaka monɔkɔ na bango. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bato oyo bafandi na bateritware yango ya minene báyeba solo na ntina na Yehova, Yesu, mpe Bokonzi?
3 Bóbongisa makambo malamumalamu: Mpo mosala esalema mpenza malamu, mokɛngɛli na mosala ya kosakola na ndeko oyo atalaka teritware, basengeli kosalisa lisangá na milende oyo bandeko bazali kosala. Ntango mosusu bakoki kosala programɛ mpo ete mikolo mosusu ya pɔsɔ (samedi) mosala esalema mingi na teritware. Bakopona mingimingi mikolo oyo bandeko mingi bakozala na likoki ya kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola. Ntango bolingi kokende kosakola na bateritware ya mosika, bómibongisa mpo na kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola soki likoki ezali, mpe bózwa biloko oyo bokolya na ntango ya midi. Na esika bósala likita mpo na mosala ya kosakola kaka na ngonga oyo bomesaná kosala, bokoki kosala yango liboso ya ngonga yango mpo bózwa ntango ya kosala mobembo tii na teritware, to mpe bokoki kosala likita yango pene na mboka oyo bolingi kosakola. Basakoli bázala mingi te na kati ya motuka mokomoko mpo ete mosakoli nyonso azala na bandako ebele ya kosakola. Bózwa bibongiseli mpo ete bókende kosakola na bamboka oyo ezali mosika na bingumba, na ntango oyo mbula ebɛtaka mingi te mpe banzela ezali malamu.
4 Baoyo basakolaka na bateritware oyo bato balobaka monɔkɔ ya bapaya, bakobebisa ntango na bango mingi te soki bazali na bankombo mpe baadresi ya bato yango, mpe soki bazali na kalati ya sika ya esika yango. Bóbongisa bateritware oyo ezali na baadresi ya bato nyonso oyo balobaka monɔkɔ ya bapaya na kartye moko, mpe bópesa yango na basakoli oyo bakoki kokende kokutana na bango.
5 Bóbosana te kobima na mikanda mwa ebele mpo na kotikela bato. Soki ezali teritware oyo bosakolaka mingimingi te, ekoki kozala malamu kotika trakte to zulunalo moko ya kala na bandako oyo bokuti bato te. Soki trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? (Olingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia?) ezali na monɔkɔ ya mboka na bino, bópesa yango na moto nyonso oyo bokutani na ye mpe bótika yango na bandako oyo bokuti bato te.
6 Bósala mpenza na bomoko: Mpo na kosakola na teritware monene, esɛngaka bato nyonso na lisangá básala na bomoko. Soki ekosɛnga ete bósala bakilomɛtrɛ mingi na motuka, baoyo bakosala mobembo na motuka moko bakoki kosangisa mbongo mpo na kosomba esansi to mazuti. Esengeli kokeba ntango okutani na bato oyo balingi osolola na bango mingi. Kobosana te ete mposa na bino esengeli kozala ya kokutana na bato nyonso ya teritware yango. Omitya mpe na esika ya baoyo oyaki na bango motuka moko, oyo bazali kozela yo. Soki olingi kosolola mingi na moto moko oyo asepeli na nsango malamu, okoki koyokana na bandeko oyo oyaki na bango mpo bákoba kosakola na bandako mosusu.
7 Bózwa libelalibela bibongiseli mpo na kozongela baoyo nyonso basepeli na nsango malamu. Bósɛnga baadresi na bango mpe banimero na bango ya telefone mpo bókoka kobenga bango mpe kopesa bango litatoli mosusu na nzela ya telefone. Soki babalabala ya mboka yango ezali na bankombo te, to soki bandako ezali na banimero te, bósala mwa bakalati na lokasa to mpe bókoma mwa makambo oyo ekosalisa bino bóbosana te bandako ya bato oyo basepelaki ntango bokozongela bango.
8 Tozali mpenza na libaku malamu ya kokokisa etinda oyo ya Yesu: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani kati na yango abongi.” (Mat. 10:11, NW) Ntembe ezali te ete Yehova akopambola mpenza milende na bino, wana bozali kondima komipesa na mosala oyo ya ntina mingi koleka!