Soki okuti bato na ndako te
1. Mokakatano nini ezali komonana mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako?
1 Na bisika mingi, ekómi mpasi kokuta bato na ndako. Na “bantango ya ndenge mosusu” oyo, bato mingi basengeli kosala mosala bangonga mingi mpo na kobikela. (2 Tim. 3:1) Bamosusu babimaka mpo na kosomba biloko to mpo na kominanola. Tokoki kosala nini mpo na koyebisa bato ya ndenge wana nsango malamu?
2. Tokoki kosala nini mpo biso moko to mosakoli mosusu azongela bato oyo tokutaki na ndako te?
2 Kokoma makambo malamu: Likambo ya liboso ezali kokoma baadrɛsi ya bato oyo okutaki na ndako te. Yango ezali na ntina mingi soki osakolaka na teritware na yo mbala na mbala. Okomaka nkombo ya balabala, nimero ya teritware, nkombo na yo, mpe dati? Okoki kotika bisika mosusu polele mpo soki yo moko to mosakoli mosusu azongi na teritware yango mpo na kokutana na bato oyo okutaki te, akoma makambo mosusu na bisika yango. Soki osilisi kosakola na teritware yango, kobosana te kopesa mokóló teritware yango makambo oyo okomaki, longola kaka soki asɛngi ete yo moko ozongela bato oyo okutaki na ndako te. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma makambo etali bato oyo basepeli na nsango malamu mpo ozongela bango.
3. Wapi mwa makanisi oyo bapesi biso mpo na kosakwela bato oyo tokutaki na ndako te?
3 Kozongela bato na ngonga mosusu: Mbala mosusu bato oyo bazalaki na ndako te na mikolo ya mosala, tokoki kokuta bango na ndako na mpokwa to na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Okoki nde kobongisa programɛ na yo mpo ozongela bango na ntango oyo ebongi? (1 Kol. 10:24) Soki likoki ezali te, okoki kopesa banɔti yango na mosakoli mosusu oyo akoki kozongela bango na ngonga mosusu. To mpe, okoki kokomela bato oyo okutaki na ndako te mikanda to komeka kobenga bango na telefone. Basakoli oyo mikakatano ya nzoto epekisaka bango básakola mingi ndako na ndako, bakoki kosepela kosalisa yo na likambo yango.
4. Likambo nini emonisi ntina ya kozongela bato oyo tokutaki na ndako te?
4 Likambo oyo elandi emonisi ntina oyo tosengeli kosala makasi tózongelaka bato oyo tokutaki na ndako te. Basakoli bazalaki koleka na ndako moko mbala na mbala kasi bazalaki kokuta moto te; nsima ya mbula misato, bakutaki nkolo ndako yango. Ezalaki mwasi moko oyo, na boumeli ya mbula misato wana, azalaki kozela ete Motatoli moko aya epai na ye mpo azongela koyekola Biblia, mpamba te azalaki koyekola yango liboso aya kofanda na esika wana.
5. Ntango nini tokoloba ete tosilisi teritware na biso?
5 Kosilisa teritware: Ntango nini tokoloba ete tosilisi teritware na biso? Mbala mingi, ezali ntango tosali mpenza milende ya kokutana na bato na ndako mokomoko. Ekozala malamu kotika trakte to zulunalo moko ya kala, na ndenge ya mayele, na ndako oyo tokuti moto te, mingimingi na teritware oyo tosakolaka mingi te. Tosengeli kosilisa teritware nsima ya sanza minei. Na nsima, tokozongisa yango epai ya ndeko oyo atalelaka bateritware mpo akoma makambo yango na dosye na ye mpo ezala ntango nyonso na molɔngɔ.
6. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tósakola nsango malamu na moto nyonso ya teritware na biso?
6 Mposa na biso ezali ete bato mingi bázwa libaku ya koyekola kobelela nkombo ya Yehova mpo bábika. (Lom. 10:13, 14) Bato oyo tokutaka na ndako te ntango tokendeke kosakola ndako na ndako, bazali mpe na kati ya bato yango. Na ndakisa ya ntoma Paulo, zalá na mposa ya “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.”—Mis. 20:24.