Tósangana liboke moko na boyokani mpenza
1 Okamwaka te mbala nyonso oyo otalaka lolenge ya malamu mpenza oyo nzoto na biso esalemá? (Nz. 139:14) Enama mokomoko ya nzoto esalaka na boyokani na binama mosusu. Liloba ya Nzambe ekokanisi lisangá ya boklisto na nzoto, oyo esalaka na boyokani mpenza. Bandeko nyonso ya lisangá balandaka litambwisi ya Klisto, ye azali Motó, mpe ‘basangani liboke moko na boyokani mpenza mpe babongisami mpo na kosala elongo na nzela ya matonga nyonso oyo epesaka nyonso oyo esengeli.’ (Ef. 4:16a, NW) Boye, Yehova azali na likoki ya kosalela bato na ye oyo bazali na bomoko mpo básala makambo ya kokamwa.
2 Baklisto ya lisangá oyo ezalaki na ekeke ya liboso basalaki “na bomoko mpenza” mpo na kosalisana, ezala na elimo to na mosuni. (Mis. 2:44-47, NW) Na lisalisi ya Yehova, bango nyonso na bomoko bayikaki mpiko liboso ya botɛmɛli makasi oyo bakutanaki na yango mpe balongaki yango. (Mis. 4:24-31) Basakolaki nsango ya Bokonzi na esika nyonso oyo bakendeki, bayebisaki nsango malamu na mabele mobimba oyo bato bazalaki kofanda na ntango wana. (Kols. 1:23) Na ntango na biso, lisangá ya boklisto, oyo basangani na yango bazali na bomoko, esali mpe ndenge moko; kutu, yango esali mingi koleka. Nini ezali kosala ete bomoko yango ezala?
3 Mateya ya Nzambe esangisi biso: Na mokili mobimba, losambo na biso esangisi biso. Ndenge nini yango ezali kosalema? Tondimaka nzela oyo Yehova azali kosalela awa na mabele mpo na kopesa ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ (Mat. 24:45, NW) Topesaka mpe motuya mingi na “makabo oyo ezali bato” oyo ye asili kopesa mpo bázala bateyi na kati ya lisangá. Lokola tondimaka na komikitisa mpenza bibongiseli oyo Yehova asili kozwa mpo na koleisa biso na elimo, boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe ebakisamaka mpe epesaka biso nyonso mposa se moko, ya kolanda ndakisa ya Yesu, mpamba te tozali bayekoli na ye. Tosengeli kolanda koyekola Liloba ya Nzambe, kosala mpenza makasi mpo na ‘kokóma na bomoko na kati ya kondima.’ (Ef. 4:8, 11-13, NW) Otángaka Biblia mokolo na mokolo mpo na komonisa ete ozali kopesa mabɔkɔ na bomoko na biso ya elimo?
4 Boninga na biso ya boklisto esangisi biso: Na makita ya lisangá, bolingo esangisaka biso lokola baninga ya solosolo. Na makita yango, “totyelanaka likebi.” (Ebe. 10:24, 25, NW) Yango elimboli ete tosengeli kosuka kaka te na kotala bandeko likolólikoló, kasi tosengeli mpenza koluka koyeba bango malamu; komona bango ndenge Yehova amonaka bango, ete bazali na motuya mingi. (Hag. 2:7, NW, maloba na nse ya lokasa) Ntango toyokaka bango bazali koyebisa polele kondima na bango, tokómaka kolinga bango mingi lisusu mpe bomoko na biso ekómaka lisusu makasi. Oyebani lokola moto oyo ayanganaka mbala na mbala na makita ya lisangá?
5 Baninga na biso na mosala ya kosakola: Ndenge tosakolaka nsango malamu elongo na bandeko na biso bandimi esalaka ete tókokisa mokano ya Nzambe na bomoko. Ntoma Paulo azalaki kolinga mingi ‘baninga na ye ya mosala mpo na Bokonzi ya Nzambe.’ (Kols. 4:11, NW) Koyebisana makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe kosalisana ntango tozali kosakola elongo esalisaka biso tókokisa mokumba na biso ya baklisto mpe esalaka ete bomoko na biso, oyo ekangisi biso lokola nsinga, ezala makasi.—Kols. 3:14.
6 Nguya ya elimo santu esangisaka biso: Lokola tosalaka makasi mpo na kosala mokano ya Yehova, ye apesaka biso elimo na ye. Elimo yango esalisaka biso tóngalisa te matata oyo ekoki kobima kati na biso mpe tófanda elongo na bomoko. (Nz. 133:1) Etindaka biso ‘tóbatela bomoko ya elimo na kati ya ekanganeli ya kimya.’ (Ef. 4:3, NW) Mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ na boyokani oyo ezali na kati ya basaleli ya Nzambe soki azali komonisa mbuma ya elimo na makambo oyo asalelaka basusu.—Gal. 5:22, 23.
7 Kosala na bomoko elongo na basusu na nse ya litambwisi ya Klisto “ezali kopesa mabɔkɔ na bokoli ya nzoto mpo na kotongama na yango moko na kati ya bolingo.” (Ef. 4:16b, NW) Longola yango, ezali kokumisa Yehova, “Nzambe oyo apesaka kimya.”—Lom. 16:20, NW.