Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/02 lok. 1
  • Omityela mikano ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omityela mikano ya elimo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Bilenge, mikano na bino ya elimo mizali nini?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Oyo okoki kosala mpo na kokokisa mikano na yo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bilenge​—Bozali kokola na elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 8/02 lok. 1

Omityela mikano ya elimo

1 Oyo nde libaku malamu tokozala na yango ya kokumisa Yehova seko na seko! Mpo na kosalisa biso tókokisa mokano yango, tokoki banda komityela mikano oyo tokokokisa sikoyo mpe kosala makasi mpo tókokisa yango. Soki tokosala bongo, ekosalisa biso tósalela makasi na biso na ndenge moko ya mayele. (1 Kol. 9:26) Mikano nini ozali na makoki ya kokokisa yango?

2 Boyekoli ya Biblia: Omibongisaka mpo na makita nyonso ya lisangá? Soki osalaka bongo, omityelaka ntango mingi mpo na kolukaluka na mikanda mpe komanyola ntango ozali koyekola? Na ndakisa, ntango ozali kobongisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ, otyaka kaka mikɔlɔtɔ na nse ya biyano to otángaka bavɛrsɛ nyonso oyo bapesi mpe omanyolaka likoló ya bandimbola bapesi? Okoki komityela mokano ya kolukaluka pɔsɔ nyonso mwa makambo mosusu oyo ezali na botangi ya Biblia mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? Kolukaluka malamumalamu na mikanda esɛngaka ntango mpe milende, kasi epesaka matomba mingi.​​—⁠Mas. 2:​4, 5.

3 Makita ya lisangá: Mokano mosusu ezali ya koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita nyonso mitano ya lisangá. Kokóma mwa ntango liboso ete makita ebanda mpo na kokutana na bandeko mosusu mpe kozala wana na loyembo mpe libɔndeli ya ebandeli ekolisaka elimo ya lisangá. Tokoki mpe kosala makasi mpo na kopesa biyano na makita nyonso mpe kobongisa malamu biyano na biso. Ntango mosusu okoki komonisa ndenge nini vɛrsɛ moko na kati ya paragrafe eyokani na lisolo to okoki komonisa ndenge nini tokoki kosalela likambo tozali kotalela na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.​​—⁠Ebe. 10:​24, 25.

4 Mosala ya kosakola: Mosala na biso ya kosakola ekómaka malamu koleka ntango tomityelaka mikano. Osilá komityela mokano ya bangonga oyo osengeli kokokisa sanza na nsanza na mosala ya kosakola? Bato mosusu bamonaka ete esalisaka bango mingi. To mpe okoki kobongisa bisika mosusu ya mosala na yo ya kosakola, na ndakisa kosalela Biblia na mosala ya kosakola ndako na ndako, kozongela kotala bato na ndenge moko ya malamu koleka, kosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na moto, to koteya bayekoli ya Biblia na ndenge ya malamu koleka?

5 Baboti, bolendisaka bana na bino bámityela mikano na mosala ya Yehova? Bósalisa bango bámona ete kosala lokola mobongisi-nzela, misionɛrɛ, to kosala na Betele ezali lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisa bozindo ya botɔndi na biso mpo na Yehova.​​—⁠Mos. 12:⁠1.

6 Soki totaleli misala na biso, tomityeli mikano ya elimo mpe na nsima tosali makasi mpo na kokokisa yango, tokozwa lisusu esengo mingi koleka na mosala na biso mpe tokolendisa bato mosusu.​​—⁠Lom. 1:⁠12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto