Tómonisa ete toyebi mpenza valɛrɛ ya bozwi ya Teokrasi
1 Ntango azalaki kosala bibongiseli mpo na kobongisa tempelo, Mokonzi Yosiya akumisaki bato oyo bazwaki mokumba yango na maloba oyo: “Bátánga mosolo mopesami na mabɔkɔ na bango te, mpamba te bazali kosala na sembo.” (2 Mik. 22:3-7) Motuya monene oyo mibali yango bazalaki kopesa na biloko mosantu emonanaki na ndenge oyo bazalaki kosalela biloko oyo bapesaki na mabɔkɔ na bango. Lelo oyo, wana tozali kosala mosala mosantu ya nsango malamu ya Nzambe, tosengeli mpe komonisa bosembo na biso na ndenge oyo tozali kosalela biloko oyo bapesi biso.
2 Na mosala ya kosakola: Kopesa motuya na nsango ya ntina oyo ezali na mikanda na biso mpe koyeba ete basalelaka mbongo mingi mpo na kobimisa yango esengeli kotinda biso tótalela yango soki moke te lokola biloko mpamba. Tosengeli te kopesaka bato oyo basepelaka na nsango malamu te mikanda na biso mpambampamba. Soki moto amonisi mpenza mposa ya nsango malamu te, tokoki kopesa ye trakte moko na esika tópesa ye mokanda.
3 Tókabola mikanda na ndenge moko oyo ezali komonisa ete toyebi valɛrɛ na yango. Tótikaka yango te na bisika oyo moto nyonso akoki komona yango, epai bakoki kopanzapanza yango. Mpo mikanda ebebisamaka mpamba te, talá naino mikanda nyonso oyo ozali na yango na ndako liboso ete okamata mosusu. Ekozala malamu osɛnga lisusu bazulunalo mingi te soki otikalaka na bazulunalo mosusu to okokaka te kokabola yango nyonso.
4 Mikanda na yo moko: Tosengeli kosala komande bobele ya mikanda oyo tozali mpenza na mposa na yango. Mingimingi tosengeli kolekisa ndelo te ntango tozali kosɛnga Bibles de luxe, Bibles avec notes et références, mpe mikanda mosusu ya minene na ndakisa Concordance, Index, Étude perspicace des Écritures, mpe Prédicateurs, mpamba te kobimisa babuku wana esɛngaka mbongo mingi.
5 Osalaka makasi mpo obosana te kokoma nkombo mpe adrɛsi na yo na kati ya mikanda na yo moko? Kokoma nkombo na mokanda ekosalisa yo ete obungisa mikanda mpambampamba te mpe osɛngasɛnga mosusu te. Soki obungisi mokanda ya nzembo, Biblia, to mokanda mosusu oyo tosalelaka yango na boyekoli, ntango mosusu okoki komona yango lisusu na esika oyo batyaka biloko oyo ebungi mpe emonani na Ndako ya Bokonzi to na liyangani.—Luka 15:8, 9.
6 Tiká ete tósala makasi mpo tósalela mikanda na biso na mayele mpenza. Yango ekomonisa bosembo na biso na ntango tozali kosalela bozwi ya Bokonzi oyo Yehova apesi na mabɔkɔ na biso.—Luka 16:10.