Bakonzi ya mabota—Bóbatela mimeseno malamu na makambo ya elimo
1 Atako afandaki bambula mingi kati na bato oyo bazalaki kosambela bikeko mpe ya bizaleli ya mbindo na Babilone, Danyele ayebanaki lokola moto oyo azalaki kosambela Yehova “mikolo nyonso.” (Dan. 6:16, 20) Ndenge nini abatelaki elimo na ye? Biblia emonisi ete azalaki na mimeseno malamu ya kotosa makambo oyo losambo ya solo esɛngaka. Na ndakisa, azalaki na momeseno ya kobondela mbala misato na mokolo na eteni na ye ya ndako ya likoló. (Dan. 6:10) Na ntembe te, azalaki mpe na mimeseno malamu na makambo mosusu ya elimo, lokola kotángaka Mibeko. Yango wana, ntango akutanaki na komekama oyo elingaki komema ye na liwa, Danyele akangamaki makasi na Yehova, mpe abikaki na ndenge ya likamwisi.—Dan. 6:4-22.
2 Ndenge moko mpe lelo, tosengeli kosala makasi mpo na “kozala ekɛngɛ na kotingama mpenza.” (Ef. 6:18) Mokili oyo tozali kobika na kati na yango ezali “kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Botɛmɛli mpe komekama ekoki kobima na mbalakaka mpe ekomeka kondima na biso. Na ntango ya bolɔzi monene, Gogo ya Magogo akobundisa basaleli ya Nzambe makasi mpenza, mpe ekomonana lokola nde esika ya kokima ekozala te. Ekosɛnga moto na moto atyela Yehova motema mobimba.—Ezek. 38:14-16.
3 Maloba ya ebandeli ya drame ya liyangani ya etúká ya 1998 oyo ezalaki na motó ya likambo “Mabota—Bókómisa botángi ya Biblia mokolo na mokolo lolenge ya bomoi na bino!” elobaki boye: “Moko ya makambo ya ntina mingi basengeli kosala mpo na kolonga ezali oyo: kotánga Biblia, koyekola yango, kosolola makambo na yango na libota, mpe kokɔtisa yango na bomoi na bango.” Ebakisaki boye: “Soki mabota mazali kosala bongo mbala na mbala mpe na ndenge ya komonisa masolo ya Biblia lokola makambo oyo ezali kosalema na miso na bango moko, komimesenisa na Biblia ekoki kobota mbuma malamu kati na libota. Yango ekokolisa boyebi na biso. Ekokómisa kondima na biso makasi. Ezali kopesa biso ndakisa malamu ya kolanda—mibali mpe basi ya ntango ya kala oyo bazalaki mpenza sembo—oyo ndakisa na bango ekoki kopusa biso, kotindika biso ete tósimba solo makasi.” Ntango tozali kotalela makambo ndenge na ndenge oyo etali mimeseno malamu ya elimo, bakonzi ya mabota bákanisa lolenge moko to mibale oyo bakoki kobongisa programɛ ya libota mpo na makambo ya elimo.
4 Bótalelaka liloba ya Nzambe mokolo na mokolo: Na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2001 vɛrsɛ ya mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ epesaki makanisi oyo: “Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela kozanga ete moto moko atɛmɛla yango, mokano na ye ekosalema na mabele ndenge ezali kosalema na likoló, ata moto mabe moko te to mpe nyama, ‘akoyokisa mpasi to akobebisa.’ (Yis. 11:9; Mat. 6:9, 10)” Maloba yango elendisaki mpenza bato! Lokola ozali mokonzi ya libota, ozalaka nde na momeseno ya kotalela mokapo ya Biblia mpe makanisi na yango elongo na libota na yo mokolo na mokolo? Kosala bongo ezali na matomba mingi. Soki bokokoka kosala yango na ntɔngɔ te, mbala mosusu bokoki kosala yango ata mwa nsima kasi kaka na mokolo wana. Tata moko alobaki ete: “Ntango ya kolya na mpokwa nde ezalaki ntango moko malamu mpo na biso ya kotalela mokapo ya Biblia mpo na mokolo.”
5 Soki ozali na momeseno malamu ya kotalela mokapo ya mokolo mikolo nyonso na libota, obongi kozwa longonya. Mbala mosusu, okoki kotánga mpe eteni moko ya Biblia. Bato mingi bameseni kotánga mokapo mobimba ya Biblia esika mokapo ya mokolo yango ezwami. Bamosusu balandaka kotánga buku moko ya Biblia oyo baponi banda mokapo ya liboso kino ya nsuka. Botángi ya Biblia mokolo na mokolo ekosalisa libota na yo bábangaka kosilikisa Yehova mpe mposa na bango ya kosala mokano na ye ekokóma makasi.—Det. 17:18-20.
6 Programɛ ya libota na yo ya botángi ya Biblia mokolo na mokolo mpe ya kotalela mokapo ya mokolo ekozala na matomba mingi koleka soki bozali kolekisa mwa miniti moke mpo na kosolola ndenge nini makambo yango ekoki kosalisa bino. Buku Eteyelo ya mosala na lokasa 60 epesi likanisi oyo: “Bokoki kopona mwa bavɛrsɛ na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ, kolobela ndimbola na yango mpe na nsima, bótuna mituna lokola oyo: ‘Ndenge nini yango ekoki kotambwisa biso? Ndenge nini tokoki kosalela bavɛrsɛ oyo na mosala ya kosakola? Bavɛrsɛ yango ezali komonisa nini na bizaleli ya Yehova mpe lolenge oyo asalaka makambo? Ndenge nini yango ezali kolendisa biso ete tólinga ye?’ ” Masolo ya ndenge ya elimo wana ekosalisa libota na yo ekoba “kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.”—Ef. 5:17.
7 Boyekoli ya libota: Kotambwisa boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ ezali nzela moko ya malamu mingi oyo bakonzi ya mabota bakomonisa bana na bango ete makambo ya elimo ezali liboso ya makambo nyonso. Elenge mobali moko alobi boye: “Mbala mosusu, Tata azalaki kolɛmba makasi soki auti mosala yango wana ezalaki mpasi mpo alala mpɔngi te, kasi ata ndenge nini boyekoli ezalaki kosalema, mpe yango esalisá biso tóyeba ntina monene na yango.” Bana mpe bakoki kopesa mabɔkɔ mpo ebongiseli yango elonga. Libota moko oyo ezalaki na bana libwa bazalaki kolamuka mikolo nyonso na ngonga ya mitano na ntɔngɔ mpo na kosala boyekoli ya libota, mpamba te ngonga mosusu ya malamu ezalaki te.
8 Mpo ete boyekoli ya libota esalema na ndenge oyo ebongi, mokonzi ya libota asengeli ‘kokeba ntango nyonso mpo na mateya na ye.’ (1 Tim. 4:16) Buku Eteyelo ya mosala na lokasa 32 elobi boye: “Tokoki mpenza koloba ete mpo boyekoli ya libota esalemaka malamu mpenza, osengeli libosoliboso koyeba libota na yo malamumalamu. Ndenge nini bato ya libota na yo bazali kokola na elimo? . . . Ntango ozali kosakola na bana na yo, bamiyokaka malamu, mpe bayebisaka baninga na bango ete bazali Batatoli ya Yehova? Basepelaka na programɛ ya botángi ya Biblia na libota mpe kosala boyekoli ya libota na bino? Bazali mpenza na bomoi oyo eyokani na nzela ya Yehova? Soki otaleli yango malamumalamu, okomona makambo oyo yo, tata, osengeli kosala mpo olona mpe olendisa bizaleli ya elimo epai ya moto mokomoko ya libota na yo.”
9 Makita ya lisangá: Kobongisa mpe koyangana na makita ya lisangá esengeli kozala momeseno moko ya ntina mingi pɔsɔ na pɔsɔ. (Ebe. 10:24, 25) Mbala mosusu, bokozwa likoki ya kobongisa makita mosusu libota mobimba. Na esika ya kozela tii ngonga ya nsuka, mpo na nini te komibongisa mikolo mingi liboso? Soki ozali na momeseno malamu na likambo yango, lolenge na yo ya kobongisa makita ekobonga mpe okozwa matomba mingi koleka na makita.—Mas. 21:5.
10 Mpo ete mimeseno ya makambo ya elimo epesa mpenza litomba, esengeli ezala oyo ebongi mpenza mpe kolanda kosala yango ntango nyonso. Okosala boni soki makambo ya bomoi na yo ezali kosala ete ezala mpasi mpo obongisa makita nyonso? Buku Eteyelo ya mosala epesi likanisi oyo na lokasa 31: “Kokwea te na motambo ya koluka kotánga yango mbangumbangu kaka mpo na kotánga to mpe, likambo ya mabe koleka, otika koyekola kaka mpo ozali kokoka koyekola te. Na esika ya kosala bongo, luká nde koyeba makambo nini oyo okoki koyekola mpe yekolá yango malamu mpenza. Saláká bongo pɔsɔ na pɔsɔ. Na nsima, salá makasi obongisaka mpe makita mosusu.”
11 Ntango mabota ezali kokóma na makita liboso ya ngonga, yango ekosalisa bango bábongisa mitema na bango mpo na kosanzola Yehova mpe kozwa matomba na mateya oyo azali kopesa. Libota na yo emesaná kosala bongo? Esɛngaka kozala na programɛ ya malamu mpe ete moto nyonso na libota apesa mabɔkɔ. Soki omonaka mbala mingi ete libota ekendeke na makita mbangumbangu mpo ete etikali moke ngonga ekoka mpe bazalaka mitema likolólikoló mpokwa nyonso oyo makita esalemaka, makambo nini bokoki kobongisa na mimeseno na bino? Ezali na makambo mosusu oyo bokoki kosala mwa ngonga molai liboso? Soki moto moko na libota nde asalaka mingi koleka, bamosusu bakoki te kosunga ye? Soki bato nyonso basilisi komibongisa mwa baminiti mingi liboso ya kokende na makita, yango ekosala ete bózalaka mitema likolólikoló te. Kobongisa makambo malamu esalisaka mpo kimya ezala na kati ya libota mpe na lisangá.—1 Kol. 14:33, 40.
12 Mosala ya kosakola: Kozala na bantango oyo etyami kaka mpo na mosala ya kosakola ezali mpe momeseno malamu na makambo ya elimo. Elenge mobali moko, nkombo na ye Jayson alobi boye: “Na libota na biso, tozalaki na programɛ ya kobima na mosala ya kosakola mokolo nyonso ya pɔsɔ na ntɔngɔ. Yango esalisaki ngai mpamba te lokola nazalaki kobima mingi na mosala ya kosakola, nakómaki komona malamu ya mosala yango mpe nakómaki kosepela na yango mingi.” Bandeko mingi oyo babɔkwamaki na mabota ya Batatoli bamonaka mpe ete kotya mokolo moko boye kaka mpo na kobima na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ esalisaki bango bákola lokola baministre baklisto.
13 Mimeseno malamu ekoki mpe kosalisa mpo ete ntango oyo libota na yo elekisaka na mosala ya kosakola esepelisa bino mingi mpe ebota mbuma mingi mpenza. Ndenge nini kosala yango? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1999, na lokasa 21, epesi likanisi oyo: “Bolekisaka bantango mosusu ya boyekoli na bino ya libota na kosalisa bato ya libota na bino bámibongisa mpo na mosala ya kosakola na boumeli ya pɔsɔ? Bakoki kozwa litomba mingi na kosala bongo. (2 Timote 2:15) Ekoki kosalisa bango básala mosala ya ntina mpe oyo ekobota mbuma. Ntango mosusu, bokoki kosalela boyekoli mobimba se mpo na kobongisa ndenge ya kosala na mosala ya kosakola. Mbala na mbala, bokoki kolobelaka makambo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola na masolo mikuse na nsuka ya boyekoli ya libota to na bantango mosusu na kati ya pɔsɔ.” Libota na bino esili komeka kosala yango?
14 Landá kokola: Nsima ya kotalela lisolo oyo, omoni makambo mosusu oyo libota na yo ezali kosala malamu? Pesá bango longonya, mpe salá makasi obongisa mpe makambo mosusu oyo etikali. Soki omoni ete esengeli bóbongisa mwa makambo mingi, poná likambo moko to makambo mibale oyo bokobanda na yango. Ntango bomeseni mpenza kosala malamu makambo yango ya elimo, bakisá likambo moko to makambo mibale mosusu. Zalá na makanisi ya kolonga mpe kosala makambo makasimakasi te. (Filp. 4:4, 5) Kokóma na mimeseno malamu na makambo ya elimo na ndako na yo esɛngaka kotyela yango milende mpenza, kasi ezalaka mosala ya mpunda te, mpo Yehova andimisi biso ete: “Ye oyo azali kolanda nzela oyo ebongisami malamu, nakomonisa ye lobiko ya Nzambe.”—Nz. 50:23, NW.