Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ya 2015 ekosalisa biso tóbongisa ndenge na biso ya koteya
1 Davidi, moko ya bakomi ya nzembo akomaki boye: “Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola ya motema na ngai ekóma elɛngi liboso na yo, Ee Yehova, Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai.” (Nz. 19:14) Biso mpe tolingaka ete maloba na biso esepelisa Yehova, mpo tosepelaka na libaku oyo tozali na yango ya koteya solo na lisangá mpe na mosala ya kosakola. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali moko ya banzela oyo Yehova apesaka biso formasyo mpo na kosakola. Formasyo yango epesamaka pɔsɔ nyonso na masangá koleka nkóto 111 na mokili mobimba. Esili kosalisa bandeko mibali mpe basi na mokili mobimba mpe bato ya ndenge nyonso bákóma mpenza baministre ya nsango malamu oyo babongi, oyo bazali na likoki ya koteya na mayele ya kondimisa, koloba na mayele mpe na mpiko.—Mis. 19:8; Kol. 4:6.
2 Programɛ ya eteyelo mpo na mobu 2015 ekozala na masolo oyo euti na mwa buku “Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe,” “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” mpe buku Étude perspicace des Écritures. Lisusu, mbongwana esalemi na ntango oyo epesami mpo na Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia mpe Lisolo No. 1. Mbongwana yango mpe mbongwana ya malako etali ndenge ya kosala masolo na eteyelo elobelami na baparagrafe oyo elandi.
3 Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia: Bandeko mibali oyo bakozwa lisolo oyo, bakozala na miniti mibale ya kolobela likambo moko oyo baponi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ wana, oyo ekosalisa lisangá. Komibongisa malamu ekosala ete bálobela likambo moko ya ntina na miniti oyo epesami. Na nsima, bayangani bakozala na miniti motoba ndenge ezalaka mpo na kopesa biyano ya mikuse (eleka segɔnde 30 te) na makambo oyo basepelaki na yango na botángi ya Biblia na pɔsɔ wana. Esɛngaka komibongisa mpe komipekisa mpo na kosala komantɛrɛ ya malamu na segɔnde 30, kasi kosala bongo ezali formasyo mpo na biso. Epesaka mpe bandeko mosusu libaku ya kopesa bakomantɛrɛ na makambo oyo bayekolaki na bolukiluki na bango.
4 Lisolo No. 1: Miniti ya botángi ya Biblia ekiti, eleka miniti misato te mpe botángi yango ekozwa makambo mingi te. Baoyo bakozwa lisolo yango basengeli komekameka mbala mingi na kotángáká na mongongo makasi mpe kotya likebi na kobenga maloba ndenge esengeli mpe kozanga kokakatana, mpo bábimisa makanisi na ndenge oyo bato bakokanga ntina. Basaleli nyonso ya Yehova basengeli kosala makasi bátángaka malamu, mpamba te kotánga ezali na ntina mingi na losambo na biso. Tozali mpenza na esengo mpo bana na biso mingi batángaka malamu! Longonya na baboti mpo na milende oyo bazali kosala na bolingo nyonso mpo na kosalisa bana na bango bákóma batángi ya malamu.
5 Lisolo No. 2: Ekozala lisolo ya miniti mitano oyo bakopesa yango na ndeko mwasi. Asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki lisolo euti na Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe, esengeli komonisa ndenge ya kosalela makambo yango na mosala ya kosakola na ndenge oyo eyokani na makambo oyo bokutanaka na yango na teritware na bino. Soki etali moto moko oyo Biblia elobeli, ndenge ezali na buku Étude perspicace des Écritures, mwana-kelasi asengeli koyekola makambo oyo ezali na nse ya nkombo ya moto yango, kopona bavɛrsɛ ya kotánga oyo eyokani na motó ya likambo, mpe komonisa liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya moto yango. Akoki mpe kosalela bavɛrsɛ mosusu oyo eyokani na motó ya likambo wana kasi ezali na lisolo wana te. Mokɛngɛli na eteyelo akoponela ndeko yango molobani.
6 Lisolo No. 3: Ekozala lisolo ya miniti mitano oyo bakopesa yango ndeko mobali to ndeko mwasi. Soki bapesi yango ndeko mwasi, akosala yango na kolanda malako oyo epesami mpo na Lisolo No. 2. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo euti na Étude perspicace, asengeli kosala yango lokola diskur mpo na bayangani nyonso. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye, kopona bavɛrsɛ ya kotánga oyo eyokani na motó ya likambo, mpe akomonisa liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya moto yango.
7 Lolenge ya sika ya lisolo No. 3 mpo na bandeko mibali: Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo euti na Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe, akosala yango lokola elakiseli na boyekoli ya libota to na mosala ya kosakola. Mbala mingi, mokɛngɛli na eteyelo nde akoponela ye molobani mpe kadre. Molobani asengeli kozala moto ya libota ya mwana-kelasi to ndeko ya lisangá. Akoki mpe kosalela bavɛrsɛ mosusu oyo ezali komonisa mitinda ya Biblia oyo eyokani na motó ya likambo wana kasi oyo ezali na lisolo wana te. Na bantango mosusu, bakopesa lisolo yango na nkulutu. Bankulutu bango moko bakoki kopona balobani mpe kadre. Na ntembe te, lisangá ekolendisama mpenza na komona ndenge bankulutu bazali komonisa mayele ya koteya elongo na moto ya libota to ndeko ya lisangá.
Ndimáká toli mpe saleláká yango mpo okende liboso
8 Toli: Mokɛngɛli na eteyelo akosalela miniti mibale nsima ya lisolo ya mwana kelasi mokomoko mpo na kopesa longonya mpe toli oyo ebongi, oyo euti na Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ntango mokɛngɛli na eteyelo akobenga mwana-kelasi mpo asala lisolo na ye, akoyebisa te toli oyo mwana-kelasi akosala. Ntango mwana-kelasi asilisi lisolo na ye, mokɛngɛli asengeli kopesa ye longonya oyo ebongi, koyebisa toli mpo na koloba malamu oyo mwana-kelasi asalaki, mpe komonisa mpenza nini emonisi ete asali malamu, to kolimbwela ye na boboto mpo na nini ekosɛnga ete atyela lisusu toli yango likebi.
9 Lokasa ya toli mpo na mwana-kelasi ezali na buku na ye Eteyelo ya mosala nkasa 79 tii 81. Soki mwana-kelasi asali lisolo na ye, mokɛngɛli na eteyelo akotondisa makambo esɛngami na buku ya mwana-kelasi mpe akotuna ye, wana bazali kaka bango mibale, soki mwana-kelasi asalaki devuare na toli oyo bapesaki ye. Nsima ya makita to na ntango mosusu, akoki kopesa mwana-kelasi longonya mpe makanisi mosusu oyo ekosalisa ye. Mwana-kelasi mokomoko na eteyelo asengeli kotalela likebi oyo bazali kotyela ye lokola libaku ya kosalisa ye akende liboso na elimo.—1 Tim. 4:15.
10 Soki mwana-kelasi alekisi ngonga, mokɛngɛli na eteyelo to ndenge oyo aponami asengeli kosala elembo moko, oyo ekobenda te likebi ya bayangani mpo na komonisa mwana-kelasi ete miniti na ye esili. Mwana-kelasi asengeli kotya likebi na elembo yango, kosilisa fraze oyo azalaki koloba mpe kokita na estrade.—Talá buku Eteyelo ya mosala, lok. 282, par. 4.
11 Baoyo nyonso bakokisi masɛngami balendisami na kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. (Talá buku Eteyelo ya mosala, lok. 282, par. 6.) Formasyo oyo eteyelo yango epesaka esalisi basaleli ya Yehova na kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi na ndenge ya kondimisa bato, ya lokumu mpe na bolingo. Na ntembe te, Yehova abongi kozwa masanzoli ya baoyo nyonso bazali kozwa matomba na mateya ya teokrasi!—Nz. 148:12, 13; Yis. 50:4.