Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/02 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Tozali na mposa ya lisangá
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Tiká ete lisangá elendisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Olingi kokende kofanda esika mosusu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 11/02 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Matomba nini tokoki kozwa soki tozali kosangana na lisangá oyo ezali na teritware oyo tofandi?

Na nzela ya lisangá, tolendisamaka “mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.” (Ebe. 10:​24, 25) Na nzela ya lisangá, toyekolaka solo mpe tozwaka oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mokumba na biso ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:​19, 20) Lisusu, tozwaka makasi mpo na koyikela komekama mpiko na bosembo mpenza mpe tozalaka na bakɛngɛli ya bolingo oyo basalisaka biso tólonga mikakatano mpe mitungisi oyo ezali se kobakisama. Emonani polele ete lisangá ezali na ntina mingi mpo na lobiko na biso ya elimo. Kasi, matomba nini tokoki kozwa soki tozali kosangana na lisangá oyo ezali na teritware oyo tofandi?

Makambo ya bomoi ya moto na moto ekeseni, mpe ekateli oyo moto akoki kozwa na likambo yango ekoki kotalela makambo lokola mosala, mobalani oyo azali mondimi te, mpe ndenge akobanda kokende na lisangá. Atako bongo, moto oyo asanganaka na lisangá oyo ezali na teritware oyo afandi azwaka matomba mingi mpenza na elimo mpe na makambo mosusu. Bankulutu bakozala na likoki ya kokutana na basakoli nyonso na lombangu mpenza soki makama ebimi pwasa. “Biyano na mituna na bino” ya kala elobelá mwa matomba mingi mosusu.​​—⁠Mai 1991.

Ezali malamu mingi koleka koyanganaka na makita na lisangá oyo ezali penepene na esika oyo tofandi; ekosalisa yo okóma na ngonga ya malamu mpe osolola na basusu, obongisa makambo mosusu ya ntina, mpe ozala wana mpo na loyembo mpe libondeli ya ebandeli. Ntango bato ya sika oyo babandi kosepela na solo bazali kofanda na kartye na biso, ezalaka pɛtɛɛ tókutana na bango, tóyekola na bango Biblia, mpe tóbengisa bango na makita oyo eyokani na ntango na bango.

Tozali na elikya ete bakonzi ya mabota bakotalela likambo oyo na kati ya libondeli, bakotalela malamumalamu makambo nyonso mpo bázwa ekateli oyo ekozala mpo na bolamu ya elimo mpe ya mosuni ya mabota na bango.​​—⁠1 Tim. 5:⁠8.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto