Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/02 lok. 1
  • Kanisaká mibange oyo bazali sembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisaká mibange oyo bazali sembo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye ya mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Zwáká na motuya bandeko oyo bakómi mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya bobange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 12/02 lok. 1

Kanisaká mibange oyo bazali sembo

1 Ana azalaki mwasi akufelá mobali mpe azalaki na mbula 84; atako bongo “azalaki kozanga soki moke te na tempelo.” Mpo na bosembo na ye, Yehova apesaki ye lipamboli moko monene. (Luka 2:​36-38) Lelo oyo, bandeko mibali mpe basi mingi bazali na elimo oyo Ana azalaki na yango atako bazali na mikakatano mingi na bomoi na bango. Lokola bato yango ya sembo babundanaka na mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto to bazali kokoka lisusu kosala makambo mosusu te mpo na bobange, yango ekoki kolɛmbisa bango nzoto na bantango mosusu. Tótalela naino banzela mosusu oyo tokoki kolendisa mpe kosalisa bango bábatela mimeseno malamu ya elimo.

2 Makita mpe mosala ya kosakola: Ebele ya mibange ya sembo bakoki kokendeke na makita ntango bato mosusu bazali kosalisa bango mpo na kokóma na makita. Yango etongaka elimo ya bandeko yango ya sembo oyo baumelá mingi na mosala mpe lisangá ezwelaka yango mapamboli. Osilá kopesa mabɔkɔ na mosala wana ya malamu mpenza?​​—⁠Ebe. 13:⁠16.

3 Kobima na mosala ya kosakola mbala na mbala epesaka baklisto ya solo esengo mpenza. Kasi kosala bongo ezali likambo moke te mpo na mibange mpe baoyo bazali na maladi. Likoki ezali osɛnga ndeko moko ya ndenge wana abima na yo lokola ‘moninga ya mosala’ na motindo moko ya mosala ya kosakola? (Lom. 16:​3, 9, 21) Ntango mosusu, okoki kosɛnga ye bópesa litatoli elongo na telefone to bózongela moto oyo asepeli na solo to bótambwisa boyekoli moko ya Biblia. Soki mobange yango afandá na ndako, okoki kobongisa mpo ete otambwisa boyekoli ya Biblia epai na ye?

4 Boyekoli mpe boninga: Bato mosusu babengisaka mobange moko to ndeko oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ te asangana na boyekoli na bango ya libota, basusu kutu batambwisaka yango na ndako na ye. Mama moko amemaki bana na ye mibale ya mike epai ya ndeko mwasi moko mobange mpo na koyekola na bango buku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia, mpe bango nyonso balendisamaki na ndenge bazalaki elongo. Bandeko ya ndenge wana bakosepela mpe soki tobengisi bango mpo na kolya to likambo mosusu. Soki baoyo bazali nzoto makasi te bakokoka te koya kotala biso ngonga molai, tokoki ntango mosusu kokende kotala bango to kofandisa bango mwa ntango moke mpo na kotángela bango, kobondela na bango, to koyebisa bango likambo ya kolendisa oyo tokutanaki na yango.​​—⁠Lom. 1:​11, 12.

5 Yehova alingi mpenza mibange oyo bazali sembo. (Ebe. 6:​10, 11) Tokoki mpe komekola ye soki tomonisaka ete tosepelaka na bango mpe tosalisaka bango bábatela mimeseno malamu ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto