Sanzolá Yehova na kopesáká litatoli ya libaku malamu
1 Basaleli ya sembo ya Yehova balukaka mokolo na mokolo mabaku ya kokumisa ye. (Nz. 96:2, 3; Ebe. 13:15) Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Basaleli mingi ya Yehova lelo bazali na botɔndi na ndenge moto moko asakwelaki bango nsango malamu ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso na litatoli ya libaku malamu.
2 Mbala mingi, kopesa litatoli ya libaku malamu na moto moko efungolelaka mpe bato mosusu nzela ya koyoka nsango ya bokonzi. Na ndakisa, lisolo ya Yesu ná mwasi Mosamalia pene na libulu ya mai ya Yakobo esalaki ete bato mingi básepela na nsango malamu. (Yoa. 4:6-30, 39-42) Ntango Paulo na Sila bazalaki na bolɔkɔ na Filipi, bapesaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ litatoli, mpe libota mobimba ya moto yango bandimaki solo.—Mis. 16:25-34.
3 Mabaku ya kopesa litatoli: Na mabaku nini okoki kopesa litatoli ya libaku malamu? Basusu bapesaka litatoli ya libaku malamu ntango bazali kosomba biloko, na bisi to na mobembo to ntango bazali kozela monganga. Basusu mpe bapesaka litatoli na ntango ya bopemi na mosala to na kelasi. Okoki kaka kotya mokanda na biso oyo elimbolaka Biblia na esika oyo bato nyonso bakoki komona, yango ekoki kotinda bango báluka koyeba bindimeli na biso.
4 Ndenge ya kobanda: Mwana moko ya mwasi ya mbula nsambo, oyo azalaki nsɔninsɔni ayokaki na makita ntina oyo moto nyonso asengeli koteya. Yango wana ntango bakendeki elongo na mama na ye kosomba biloko, atyaki mwa babuku mibale na sakosi na ye. Ntango mama na ye azalaki kosomba biloko, ye alakisaki mwa buku moko epai ya mwasi moko oyo azwaki yango na boboto nyonso. Ntango batunaki ye nini epesaki ye makasi ya kosolola na mwasi yango, elenge yango ya nsɔninsɔni ayanolaki: “Namilobelaki ete, Tɛlɛmá, kendá! Mpe nakendeki!”
5 Mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu, biso nyonso tosengeli kozala na elimo lokola ya mwana mwasi oyo ya moke. Nini ekosalisa biso? Tóbondela mpo na kozwa makasi ya koloba. (1 Tes. 2:2) Zaláká na motuna moko to likanisi moko ya kobenda likebi, oyo okoki kosalela mpo na kobanda lisolo. Mpe zalá na kondima ete Yehova akopambola milende na yo.—Luka 12:11, 12.
6 Kopesa litaloli ya libaku malamu epai ya bato oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo ekumisaka Yehova mpe epesaka biso esengo. Ekoki mpe kosalisa moto mosusu ete amona nzela ya bomoi ya seko.