Zalá na molende mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’
1, 2. Nini ezali kobenda likebi na yo na ndenge oyo Paulo azalaki kotalela mosala ya kosakola nsango malamu, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye na oyo etali ‘kopesa litatoli malamumalamu’?
1 Lokola Yesu ná basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala, ntoma Paulo azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu, azalaki ‘kopesa litatoli malamumalamu’ na mabaku nyonso. Ata ntango azalaki na bolɔkɔ, “azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye. Kosakoláká bokonzi ya Nzambe epai na bango mpe koteyáká makambo oyo etali Nkolo Yesu Klisto na elobeli mpenza ya polele koleka.”—Mis. 28:16-31.
2 Biso mpe tokoki kozala na molende mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’ ntango nyonso. Yango esangisi kopesa litatoli na bato nyonso oyo tokokutana na bango na mobembo oyo tokosala ntango tokokende mpe ntango tokozonga na Liyangani ya Etúka “Pesá Nzambe nkembo” mpe ntango tokozala na mboka oyo liyangani ekosalema—Mis. 28:23; Nz. 145:10-13.
3. Ndenge nini tokoki koboya ete litatoli na biso ya libaku malamu ekóma kaka likambo moko ya mbalakaka?
3 Litatoli ya mbalakaka to ya libaku malamu? Bokeseni ezali? Ɛɛ, ezali. Likambo oyo esalemi na mbalakaka ezali likambo oyo ebimi pwasa to oyo moto akanaki te, lokola nde ebongisamaki te mpe ezali na ntina mingi te. Nzokande, tokoki koloba bongo te mpo na mosala na biso ya kosakola. Ndenge moko na Paulo, kopesa Nzambe nkembo na kopesáká litatoli ezali na ntina mingi mpo na biso, mpe mposa na biso esengeli kozala ya kopesa litatoli bisika nyonso oyo tokoki kosala yango ntango tokosala mibembo. Kasi, ndenge oyo tobandaka masolo ekoki kotalelama mpenza lokola libaku malamu—yango esalemaka na motema ya kokita, na boninga, mpe na lisolo kaka. Ndenge wana ya kobanda lisolo ekoki kobimisa matomba.
4. Nini esalisaki Paulo apesa litatoli na esika oyo afandaki?
4 Omibongisa mpo na kopesa litatoli: Paulo asengelaki koluka mabaku ya kopesa litatoli ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma. Kaka na esika oyo azalaki kofanda, azwaki likanisi ya kobenga bakonzi ya Bayuda ya mboka wana na ndako na ye. (Mis. 28:17) Atako lisangá moko ya boklisto ezalaki na Loma, Paulo ayaki koyeba ete Bayuda mingi oyo bazalaki na engumba wana bayebaki makambo mingi te oyo etali kondima ya boklisto. (Mis. 28:22; Lom. 1:7) Atikaki te ‘kopesa litatoli malamumalamu’ na ntina ya Yesu Klisto mpe Bokonzi ya Nzambe.
5, 6. Mabaku nini tokoki kozala na yango ya kopesa litatoli ya libaku malamu, mpe bibongiseli nini tokoki kozwa mpo na kosala yango malamumalamu?
5 Kanisá bato nyonso oyo okoki kokutana na bango na mobembo, oyo bayebi Batatoli ya Yehova malamu mpenza te. Mbala mosusu bayebi kutu te ete toyekolaka na bato Biblia na bandako na bango kozanga kosɛnga mbongo. Luká na likebi mpenza mabaku ya kopesa litatoli na bato oyo okutani na bango na mobembo, wana ebotɛlɛmi mpo na kopema moke, na bisika batɛkaka esansi, na bamagazini, na otɛlɛ esika okofanda, ntango ozali kolya na restora, na bisi, mpe bongo na bongo. Bongisá liboso makambo oyo okoloba mpo na kobanda lisolo mpe pesá litatoli ya mokuse. Mbala mosusu mwa mikolo na liboso, okomeka kopesa litatoli ya libaku malamu na bato oyo bofandi na bango pembeni, na bandeko na yo, baninga na yo ya mosala mpe bato mosusu oyo oyebani na bango.
6 Okozala na mposa ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na kosalela ntango ozali kopesa litatoli ya libaku malamu. Mikanda nini? Okoki kosalela trakte nyonso. Trakte lokola Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? (Olingi koyeba Biblia malamu?), lobelá baparagrafe mitano ya ebandeli esika bapesi bantina ekeseni ya kotángá Biblia. Lakisá moto yango ndenge ya kosɛnga boyekoli ya Biblia na ndako kozanga kofuta mbongo, na nsima ya trakte. Soki okutani na moto oyo andimi koyekola Biblia, pesá ye mwa búku Azali kosɛnga. Lokola okoki mbala mosusu kokutana na bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu, osengeli kozala na batrakte, mwa babuku to bazulunalo na minɔkɔ oyo elobamaka na ba provinces misusu. Soki ozali kosala mobembo na motuka, ekozala malamu omema mwa ndambo ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na kopesa bato oyo bakosepela mpenza na nsango malamu ya Bokonzi.
7, 8. Makambo nini tosengeli kokeba na yango na oyo etali ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato mpe etamboli na biso ntango tozali kosala mobembo mpe kozwa mopɛpɛ?
7 Tyaká likebi na elateli mpe etamboli na yo: Tosengeli kondimisama ete etamboli na biso, elateli na biso, mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto, ekopesa basusu makanisi ya mabe te to kotinda bango ete ‘balobela mabe’ ebongiseli ya Yehova. (Mis. 28:22) Yango ezali na ntina kaka te na ntango tozali koyangana na liyangani kasi lisusu ntango tozali na mobembo to mpe ntango tozali kozwa mwa mopɛpɛ. Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya 1/8/02, na lokasa 18, paragrafe 14 elobi boye: “Tosengeli kobongisa nzoto na biso mpe kolata bilamba na biso na ndenge oyo ekobenda likebi ya bato te, na ndenge ya mobulumobulu te, na ndenge oyo ekolamusa bamposa ya pite te epai ya basusu, oyo ekotika libándá te binama ya nzoto oyo esengeli kobombama, mpe tosengeli te koluka kaka kolanda makambo ya mikolo oyo. Lisusu, tosengeli kolata na ndenge oyo ezali komonisa ete ‘tobangaka Nzambe.’ Yango epesi biso likambo ya ntina mingi oyo tosengeli kokanisa likólo na yango, boye te? Yango ezali kaka te likambo ya kolataka malamu ntango tozali kokende na makita ya lisangá [to na mayangani] mpe kobosana mitinda nyonso oyo na bantango mosusu. Molato na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto esengeli ntango nyonso komonisa elimo ya kobanga Nzambe mpe ya kopesa ye lokumu, mpamba te tozali baklisto ngonga nyonso.”—1 Tim. 2:9, 10.
8 Tosengeli kolata na kolekisa ndelo te mpe na ndenge oyo ekopesa biso nzoto kilo. Soki molato na biso ezali ntango nyonso komonisa ete tozali bato oyo bandimelaka Nzambe, tokokakatana te mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu mpo tolati na ndenge oyo ebongi te.—1 Pet. 3:15.
9. Matomba nini Paulo azwaki ntango apesaki litatoli na Loma?
9 Litatoli ya libaku malamu ebotaka mbuma: Na boumeli ya mbula mibale oyo alekisaki na bolɔkɔ na Loma, Paulo amonaki matomba ya milende oyo asalaki mpo na kopesa litatoli. Luka alobi ete: “bamosusu babandaki kondima makambo oyo elobamaki.” (Mis. 28:24) Paulo ye moko amonisaki matomba oyo azwaki na “kopesáká litatoli malamumalamu” ntango akomaki boye: “makambo na ngai ebaluki nde na ndenge ete nsango malamu ekende liboso, na boye ete minyɔlɔlɔ na ngai eyebani polelepolele na bokangani na Klisto na kati ya Bakɛngɛli nyonso ya Peletolia mpe epai ya bamosusu nyonso oyo batikali; mpe mingi ya bandeko na kati ya Nkolo, kozwáká makasi mpo na minyɔlɔlɔ na ngai, bazali komonisa mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe kozanga kobanga.”—Filp. 1: 12-14.
10. Matomba nini mobali moko ná mwasi na ye bazwaki na mbula oyo eleki?
10 Na mbula oyo eleki, mobali moko ná mwasi na ye, nsima ya kolekisa mokolo na liyangani ya Etúka, bapesaki litatoli ya libaku malamu oyo ebotaki mbuma, epai ya mwasi moko oyo asalaka na restora moko, oyo atunaki bango ntina ya makarɔ na bango. Basololaki na ye na ntina etali liyangani mpe lisusu elikya oyo Biblia epesi bato nyonso mpo na mikolo ezali koya. Bapesaki ye trakte Olingi koyeba Biblia malamu? Mpe balimbolelaki ye ndenge bakoki koyekola na ye Biblia na ndako na ye kozanga ete afuta mbongo. Mwasi yango alobaki ete andimi moto moko akendaka kotala ye, mpe akomaki nkombo na ye mpe esika afandaka na esika oyo ezali nsima ya trakte mpe asɛngaki na bango bázwa bibongiseli mpo moto moko akende kotala ye. Matomba nini okozwa mbula oyo soki ozali na molende mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’?
11. Bizaleli malamu nini tosengeli kozala na yango mpo na kosakola mingi lisusu na mbula oyo mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’?
11 Sakolá liloba ya Nzambe malamumalamu: Kanisá esengo oyo Paulo azalaki na yango ntango ayokaki ete baninga na ye baklisto balandaki ndakisa na ye ya molende! Tiká ete biso mpe, ntango tokosala liyangani ya mbula oyo, tósala nyonso oyo ekoki mpo na kosakola mingi lisusu na kopesáká litatoli ya libaku malamu na oyo etali bindimeli na biso oyo etongami na Biblia.
[Etanda na lokasa 3]
Mikanda oyo tozali na mposa na yango mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu
■ Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? (Trakte)
■ Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? (mwa buku)
■ Batrakte na minɔkɔ mosusu
■ Mikanda mosusu oyo tosalelaka mingi
[Etanda na lokasa 4]
Kobosana bango te!
Banani wana? Baoyo nyonso bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka nsima ya ekaniseli. Tokobenga bango na liyangani ya Etúka ya mbula oyo? Na ntembe te, mingi na bango bakoya soki balendisi bango na boboto mpenza. Lokola bakozala elongo na bandeko na liyangani mpe bakoyoka makambo ebele oyo ekolendisa na elimo, bakomiyoka pene na Yehova mpe na lisangá na ye. Mpo na nini te komeka kobenga bango mpe kotala soki bakondima to te? Yebisá bango makambo nyonso oyo bakozala na yango mposa, lokola dati ya liyangani, ndenge ya kokóma na esika oyo liyangani ekozala, ngonga oyo yango ekobanda mpe ekosila, mpe yebisá bango na mokuse makambo oyo ekolobelama na liyangani, ndenge emonisami na ezipeli ya Lamuká! ya 8/6/2003 (ebimeli ya Lifalanse).