Tózala na botɔndi mpo na motema mawa ya Nzambe
1 Liboso ntoma Paulo akóma moklisto, azalaki kotɛmɛla makasi ete lingomba ya boklisto epalangana te. Kasi, lokola kozanga boyebi nde etindaki ye asala bongo, Yehova alimbisaki ye. Yehova amonisaki boboto monene na ye, mpe apesaki Paulo mosala ya kosakola. Paulo atalelaki mosala yango na motuya mingi mpenza. (Mis. 26: 9-18; 1 Tim. 1: 12-14) Botɔndi oyo Paulo azalaki na yango mpo na motema mawa ya Yehova etindaki ye amipesa mobimba na kokokisa mosala na ye ya kosakola.—2 Kol. 12: 15.
2 Nzambe, na motema mawa na ye, apesi biso mpe mosala ya kosakola. (2 Kol. 4:1) Lokola Paulo, biso mpe tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na motema mawa oyo Nzambe amoniseli biso soki tozali kosala mpenza milende mpo na kosalisa bamosusu ete bákola na elimo. Lolenge moko ya komonisa yango ezali ya kobanda koyekola Biblia na bato mpe kolanda koyekola na bango.
3 Lolenge ya kobanda koyekola Biblia na bato: Lolenge moko ya kobanda koyekola Biblia na bato ezali ya kotikelaka bango bazulunalo mbala na mbala. Ntango tozali kozongela mbala na mbala bato oyo totikelaka bazulunalo, tokoyeba lisusu malamu koleka bamposa na bango. Nsukansuka, zulunalo moko ekoki kozala na lisolo oyo ekosalisa biso tóbanda koyekola Biblia na bango na lisalisi ya mwa buku Azali kosɛnga. Mbala nyonso oyo tokozongela moto mpo na kotikela ye bazulunalo ya sika, tokoki mpe kokoba kotalela elongo na ye mwa buku Azali kosɛnga.
4 Esengeli kobondela mpe kosala milende: Libondeli mpe molende ekosalisa biso na kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola. Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela, oyo azalaki koyekola Biblia kaka na moto moko, abondelaki Yehova asalisa ye akóma koyekola Biblia na bato mingi. Asalaki mpe makambo oyo eyokanaki na libondeli na ye. Atalelaki malamumalamu lolenge na ye ya kosakola mpe amonaki ete ntango azalaki kozongela bato azalaki kosɛnga bango te ete ayekola na bango Biblia. Akómaki sikoyo kosɛnga bato ete ayekola na bango Biblia mpe eumelaki te, akómaki koyekola Biblia na bato mosusu mibale.
5 Tozali mpenza na libaku malamu ya koyebisa bato “nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe”! (Mis. 20:24) Tiká botɔndi na biso mpo na motema mawa ya Yehova etinda biso na kozala na molende ntango tozali kosalisa bato mosusu mpo ete bázwa litomba na boboto monene ya Yehova.