“Tambolá elongo na Nzambe” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2004
1 Nini esepelisaka yo mpenzampenza na mayangani ya etúká oyo tosalaka mbula na mbula? Masukulu ya kolendisa ná drame oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abongiselaka biso? (Mat. 24:45-47) Mikanda ya sika oyo ezali na bilei ya elimo oyo bapesi biso na ntango ebongi? Bandeko oyo bamonisaka ndenge Biblia esalisi bango bákóma na bomoi ya malamu? Balapolo oyo emonisaka ndenge mosala ya kosakola ezali kokola na bikólo mosusu? Kozala esika moko na bandeko na biso bandimi bilenge mpe mikóló? Ya solo, makambo oyo nyonso mpe mosusu nde etindaka biso tózela mayangani yango na mposa mpenza.
2 Zalá na liyangani mikolo nyonso misato: Na nzela ya Moize, Yehova apesaki etinda oyo: “Yanganisá bato . . . ete báyoka mpe báyekola.” (Det. 31:12) Na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yehova abongiseli biso mateya ya malamu mpenza mpo na mokolo mokomoko ya liyangani. Tosengeli kozala wana mpo na kolanda mateya wana nyonso, mpamba te ateyaka biso mpo ‘na litomba na biso moko.’ (Yis. 48:17) Soki osengeli kosɛnga patrɔ na yo konje, landá ndakisa ya mpiko ya Nehemia; bondelá naino Yehova mpe nsima na yango, kende kosolola na ye. (Neh. 1:11; 2:4) Lisusu, soki tofandaka esika moko na bandeko na biso oyo bazali bandimi te, tokomonisa ete tozali mpe kokanisa bango soki toyebisi bango liboso ete tokokenda na liyangani.
3 Bisika ya kolala: Mbala mingi, na engumba oyo liyangani ekosalema, bapaya balalaka na bandako ya bandeko, na Bandako ya Bokonzi to epai ya bandeko na bango moko. Nsima ya kotalela siplema oyo na Likita ya Mosala, bakotya na etanda ya mayebisi liste ya bisika nyonso oyo liyangani ya etúká ekosalema. Tolendisi bino bókanisa malamu mpe bóbondela liboso ya kopona liyangani ya etúká oyo bokokende na mobu 2004. Mpo na basakoli oyo bakolinga bápesa bango esika ya kolala na ndako ya ndeko moko to na Ndako ya Bokonzi, tosɛngi mokomeli ya lisangá asala liboso mpenza liste ya basakoli nyonso wana mpe atinda yango na Departema ya boyambi bapaya ya engumba oyo bango bakokende na liyangani. Na liste yango, akokoma nkombo ya basakoli yango, akomonisa soki bazali basi to mibali (B to M), mbula na bango, mpe soki bazali bato ya libota moko. Yango ekosalisa bandeko oyo bazali kosala na Departema ya boyambi bapaya bázwa ntango ya koluka bisika oyo bakoyamba basakoli wana. Soki bapesi biso esika ya kolala, ekozala malamu te tóluka lisusu ndeko mosusu to moninga mosusu mpo tókende kofanda epai na ye. Yango ekopesa mokakatano mpenza na bandeko oyo bazali kosala na Departema ya boyambi bapaya. Kasi, soki mosakoli moko asepeli kofanda epai ya ndeko na ye moko oyo azali Motatoli te, asengeli te kotinda nkombo mpo na kosɛnga Departema ya boyambi bapaya epesa ye esika ya kolala.
4 Bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi: Tolingi kopesa awa mwa malako mpo na bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi. Komite ya liyangani ya etúká ekopona nkulutu moko mpo na kotambwisa ebongiseli yango. Bakopesa ye ndeko moko oyo akobanda kosalisa ye, mingimingi nkulutu to mpe mosaleli na misala oyo akɔmeli na elimo. Esengeli kokabola Ndako ya Bokonzi na biteni mibale. Eteni moko mpo na bandeko basi ná bana na bango ya mike, mpe bilenge basi. Eteni mosusu mpo na bandeko mibali mpe mibali mosusu. Ndako ya Bokonzi ekozala kaka esika ya kolala. Na moi, ntango bato nyonso bakei na liyangani, bandeko mosusu bakotikala kokɛngɛla, moto na moto na ngala na ye, mpo miyibi báyiba biloko ya bandeko te. Mpo na mosala yango, esengeli kopona bandeko oyo basalaka mikumba bapesi bango na lisɛki te mpe oyo bazali makasi na elimo mpo bákɛngɛla biloko. Moto moko te asengeli kolamba na kati ya Ndako ya Bokonzi. Baoyo bakozwa bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi bakoki kobongisa mwa esika na kati ya lopango oyo bakozipa yango mpo na kolamba. Soki liyangani esili, basengeli kolongola esika yango. Ezali na ntina mingi ete bábatela ntango nyonso Ndako ya Bokonzi pɛtɔ mpe na molɔngɔ, ezala na kati to na libándá. Basengeli kokeba ete bábebisa ata eloko moko te. Basengeli kosala nyonso mpo na komonisa etamboli ya baklisto ya solo, ezala kati na bango to epai ya bato oyo bafandi pembeni ya Ndako ya Bokonzi.—1 Kol. 10:31.
5 Ntoma Paulo ayebisaki masangá ya Galatia ete ‘básala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na bango na kati ya kondima.’ (Gal. 6:10) Bandeko oyo bakómi mibange, baoyo bazali bibɔsɔnɔ, batata to bamama oyo babɔkɔlaka bana na bango bango moko mpe bandeko oyo bazali babola to oyo basalaka mosala ya ntango nyonso bakoki mbala mosusu te kosɛnga yo lisalisi, nzokande bakoki kozala na mikakatano oyo bazali kobundana na yango mpo bákoka kozangisa liyangani te. Ozali na likoki ya ‘kosalela bango oyo ezali malamu’ mpe kosalisa bango? Mingi mpenza, bandeko na bango ya libota oyo bazali baklisto ná bankulutu nde basengeli koluka koyeba mikakatano na bango.
6 Ebongiseli oyo ya kolalisa bandeko na Ndako ya Bokonzi ezali kaka mpo na basakoli oyo bazali na etamboli malamu mpe bana na bango oyo bazali na etamboli malamu. Soki bandeko ya Departema ya boyambi bapaya bazali na mituna ya kotuna mpo na mosakoli moko oyo asɛngi esika ya kolala, bakotuna mokomeli ya lisangá ya mosakoli yango.
7 Na liyangani moko ya basaleli ya Yehova, oyo esalemaki eleki sikoyo mbula soki 2 500, Ezela ná baninga na ye Balevi batángaki Liloba ya Nzambe mpe balimbolelaki yango bayangani. Yango ebimisaki matomba nini? Nehemia 8:12 eyebisi biso ete “bato nyonso bakendaki na bango . . . kosepela mingi mpo ete basili kososola maloba masakwelamaki bango.” Tozali na botɔndi mpenza ndenge, na ndakisa ya Nehemia ná Balevi, moombo oyo apakolami azali kosalela Liloba ya Nzambe, kolimbola yango mpe komonisa biso ndenge ya kosalela yango na bomoi na biso. Na ndenge yango, moombo yango azali komonisa bolingo mpe komibanzabanza ya solosolo oyo Yehova azalaka na yango mpo na basaleli na Ye nyonso. Zwá ekateli ya kozangisa ata mokolo moko te ya liyangani ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe”!
8 Mosala ya bolingo malamu: Banda kala basaleli ya sembo ya Yehova bamonisaka elimo ya komipimela na ndenge bandimaka mosala ya bolingo malamu. Na ndakisa, ntango Nzambe asɛngaki Yisaya azala momemi nsango na ye, mosakoli ayanolaki mbala moko ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Kobongisa liyangani esɛngaka ntango mpe milende mingi. Na ntembe te, masangá oyo ezali mosika te na esika ya liyangani bakosepela kotinda basali ya bolingo soki basɛngi bango. Na yango, bankulutu mpe basaleli na misala basengeli kopesa ndakisa ya malamu. Bolingo na biso mpo na Yehova, mpo na losambo ya pɛtɔ, mpe mpo na bandeko esengeli kotinda biso na komipesa biso moko. Balobaka ete: “Mosala ya makasi ekómaka pɛpɛlɛ soki bato mingi bapesani mabɔkɔ mpo na kosala yango.”
9 Ndimá mosala ya bolingo malamu: Na liyangani ya etúká, bandeko mingi bapesaka mabɔkɔ mpo misala ya badepartema ndenge na ndenge etambola malamu. Bandeko oyo basalaka na kati ya esika ya liyangani mpe baoyo basalaka libándá, na bisika ya kotɛlɛmisa mituka, bango nde balakisaka bayangani bisika ya kofanda mpe babatelaka mituka na biso wana tozali kolanda liyangani. Bandeko oyo basalaka na Departema ya kotya bopɛto, bango nde bazalaka na mokumba ya kobatela lokumu na biso lokola bato ya bopɛto, basalaka nyonso mpo ete esika oyo tosalelaki na boumeli ya mwa mikolo lokola esika na biso ya losambo etikala pɛto koleka ndenge tokutaki yango. Tokoki kopesa mabɔkɔ na badepartema yango to na badepartema mosusu oyo ekoki kozala na mposa na biso? Okondima komipesa na motema moko mpo na “kosala elongo” na bandeko na yo?—Sef. 3:9, NW.
10 Lokola “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana,” tozali na mposa makasi ya mayangani na biso ya etúká mpo tókanisaka ntango nyonso makambo ya elimo. (1 Kol. 7:31) Komibongisa mpo na koyangana mikolo nyonso ekosɛnga kosala milende, kasi ezali mpo na bolamu na biso. Liyangani ya etúká ya mbula oyo, oyo ezali na motó ya likambo “Tambolá elongo na Nzambe,” ebongisami mpo na kosalisa biso tózala ntango nyonso makasi awa tozali kozela Yehova apesa mokili ya Satana etumbu. Tiká ete eloko moko te epekisa biso kozwa mateya oyo Yehova abongiseli biso.—Yis. 51:4, 5.
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ—5:10 nsima ya nzanga
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ—4:05 nsima ya nzanga
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na liyangani ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe”
1. Soki ekosɛnga ete osala mobembo molai mpo na kokóma na esika ya liyangani, bandá kobomba mbongo mpo na transport ya yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá ye na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, luká kolya bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká biteni ya papye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo bibongisami mpo na kobwaka biloko ya bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.