“Bateyi ya Liloba ya Nzambe”: Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2001
1 Mosakoli Yisaya amonisaki Yehova lokola Molakisi Monene, ye oyo lokola tata, azali koteya basaleli na ye ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yis. 30:20, 21) Kasi ndenge nini toyokaka maloba oyo Yehova azali koloba mpo na litomba na biso? Yehova alobaka epai ya basaleli na ye na nzela ya Biblia mpe na nzela ya mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia; na makita, na mayangani ya zongazonga, mpe mayangani ya etúká oyo ebongisamaka na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Tosengeli komonisa botɔndi epai ya Yehova na ndenge azali kolanda kotambwisa biso na nzela oyo tosengeli kotambola.
2 Mbula na mbula, liyangani ya etúká epesaka biso libaku ya kozala esika moko na bandeko na biso bandimi mpe kolanda na likebi nyonso mateya ya Yehova. Na mbula eleki, bato 1 428 139, bayanganaki na liyangani ya etúká “Batosi ya Liloba ya Nzambe,” oyo ezalaki mpenza libɔndisi na elimo. Na mobu 2001, Liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe,” ekosalema na boumeli ya mikolo misato na Congo-Brazzaville mpe na Congo-Kinshasa.
3 Mayangani na biso ya etúká oyo ekosalema na mobu 2001, ekopesa biso libaku mosusu ya kosanzola Yehova elongo na baninga na biso, baoyo bazali “koyeba bobola na bango ya elimo” mpe bazali na motema likoló mpo na “koyoka makambo oyo [elimo, NW ] elobi na masangá.”—Mat. 5:3, NW; Emon. 2:29.
4 Okozala na liyangani yango? Bandá komibongisa uta sikoyo. Zwá ekateli ya koyangana mikolo nyonso misato na elambo yango kitoko ya elimo, kobanda na loyembo ya ebandeli tii na libondeli ya nsuka. Mbala mingi, liyangani na bino ezalaka oyo ekosalema pene na esika oyo ofandi. Na yango, biro esali nyonso mpo ete bózala na mokakatano te mpo na likambo yango. Esika mosusu ya sika ebakisami na liste ya bisika ya mayangani mpo na kopesa nzela na mokomoko kati na biso ete alya na elimo esika moko na libota na ye. (Det. 31:12) Bokoki kobanda kobomba mwa mbongo uta sikoyo mpo na transport ya libota na bino. Bato mosusu basalaki milende makasi mpo na koyangana na liyangani ya etúká na mobu 2000. Ndeko mwasi moko, na mobali na ye na bana na bango mibale batambolaki bakilomɛtɛlɛ 150 na makolo mpo na kokende na esika ya Liyangani. Ndeko mwasi yango azalaki na zemi mpe akómaki pene ya kobota. Ntango bamonaki bandeko mosusu bazalaki kokende na liyangani, bango mpe bazwaki mokano ya kokende na bango elongo. Nsima ya kotambola kilomɛtɛlɛ 70, ndeko mwasi yango abotaki mwana kitoko mpe azalaki nzoto malamu. Butubutu, libota yango balandaki nzela na bango mpe bakómaki na esika ya liyangani na ngonga malamu mpo na koyangana mikolo nyonso misato ya liyangani. Tokomonisa botɔndi na biso na bibongiseli oyo biro ezwi, soki tosali makasi mpo na koyangana na liyangani na mobu 2001.
5 Bisika ya kolala: Na momeseno, bapaya bayambamaka na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔndi epai ya bandeko oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te mpo na baoyo bayambami ete báfanda mikolo mingi epai ya bandeko oyo bayambi bango, ezala liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka kaka na boumeli ya mikolo ya liyangani. Baoyo bazali koyambama epai ya bandeko, basengeli komonisa limemya mpo na biloko ya bandeko oyo bayambi bango, basengeli kobebisa eloko moko te, bakokende te na bisika oyo bapesi bango ndingisa te, mpe basengeli kokeba ete bana na bango mpe básala bobele bongo. Soki bandeko oyo bayambi bapaya bazwi mokakatano moko na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa yango na departema ya boyambi bapaya, oyo ekoluka ndenge ya kopesa lisungi. Mpo ete departema ya boyambi bapaya esala mosala na yango na molɔngɔ mpe malamu, esengeli ete bandeko nyonso básala na bomoko. (Ebe. 13:17) Toyokaka ete bandeko mosusu bazali kotika bango moko esika ya kolala oyo bapesaki bango mpo na kokende na esika mosusu epai oyo moninga moko to moto moko oyo bayebani na ye azali. Yango epesaka mokakatano na bandeko oyo bazali kosala na departema ya koyamba bapaya. Tozali kosɛnga na bino nyonso ete bólanda malako oyo bandeko ya departema yango bakopesa bino.
6 Ntembe ezali te ete Yehova asungaka biso na misala oyo esalemaka mpo na mayangani ya mbula na mbula. Lokola bandeko mingi oyo balongwaka na bamboka na bango mpo na kokende na liyangani ya etúká bazalaka na mposa ya kozwa bisika ya kolala, tokoki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango na ndenge ebongi. Lokola makambo yango ezali na boyokani na losambo ya solo, tosengeli kolanda na esengo nyonso mitinda oyo mipesami. Tómonisa ete tozali sembo na oyo ezali moke mpenza, boye tokozwa matomba mingi oyo ezali kozela baoyo Yehova alingaka.—Luka 16:10.
7 Tóbosana te bandeko oyo bazali na mikakatano: Mibange to bibɔsɔnɔ, basaleli ya ntango nyonso to bandeko mosusu bakoki kozala na mposa ete básalisa bango mpo bázala na liyangani. Bandeko na bango ya mosuni, bankulutu to bandeko ya lisangá na bango baoyo bayebi ezalela na bango malamu bakoki na bolingo nyonso kosala oyo esengeli, kasi basengeli te kotika mokumba yango na bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani.—Talá 1 Timote 5:4.
8 Tómibongisa mpo na kozala mikolo nyonso misato: Satana alukaki kopɛngola likebi na yo na makambo ya elimo? Ezali mawa na komona bandeko mingi mpe mabota na bango kozanga bilei ya ntina na elimo. Ndenge nini? Na mokolo ya mitano bazalaka na liyangani ya etúká te. Na mayangani mosusu emonanaki ete bandeko mingi balandaka te mateya ya elimo mpe bazangisaka libaku ya kozala elongo na bandeko na bango baklisto na mokolo ya mitano. Toyokaki ete bandeko mosusu balɛmbaki nzoto mpo na koyangana na mayangani mpo bayibaki biloko na bango na ndako na ntango oyo bango bazalaki te. Mpo na kokeba ete likambo yango ekomela bango te, bandeko mosusu bazwaki bibongiseli mpo ete bandeko na bango, baoyo bazali Batatoli te báya kokengela ndako ntango bango bakei na liyangani elongo na mabota na bango.
9 Matomba nini tozwaka na mayangani na biso? Ndeko mobali moko oyo asepelaki mingi na drame oyo ezalaki na motó ya likambo “Bandakisa oyo ezali kokebisa biso lelo oyo,” alobaki boye: “Motó ya likambo yango ebongi mpenza na mikolo na biso, oyo ekokani na oyo ya Bayisalaele ntango bazalaki na esobe wana bakómaki pene ya kokɔta na mokili ya ndaka. Masumu oyo Bayisalaele basalaki ezali ndenge moko na oyo bato bazali kosala na mikolo na biso, lokola kosambela bikeko (kosambela bavɛdɛti) mpe kosala pite. Yango wana, drame oyo ezali mpenza likebisi mpo na biso.” Liteya oyo ebimaki na drame yango, esimbaki mpe motema na yo?
10 Mpo na kosukisa: Lokola mikolo ezali kobɛlɛma mpo okoka koyangana na liyangani, tyá likambo yango na libondeli epai ya Yehova mpo ete okoka koyangana na liyangani mikolo nyonso misato mpe okoka kozwa matomba mingi na mateya yango. Osili kosɛnga konje na mosala na yo mpo na koyangana mikolo nyonso misato na liyangani? Soki osali naino yango te, salá yango sikoyo soki likoki ezali. Bapatrɔ mingi baboyaka kopesa basali na bango mikolo ya konje soki basɛngi yango ntango mingi liboso te. Moombo ya sembo mpe ya mayele abongisi liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” oyo ekosalema mbula oyo, mpo na koteya biso na elimo mpe kolendisa kondima na biso. Yango wana, bandá komibongisa sikoyo mpo na kozala wana, landá toli ya mokomi na nzembo oyo alobaki ete: “Bókumisa Nzambe Nkolo kati na koyangana.”—Nz. 68:26.
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ—5:00 nsima ya nzanga
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ—4:00 nsima ya nzanga
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na liyangani “Bateyi ya Liloba ya Nzambe”
1. Soki ekosɛnga ete osala mobembo molai mpo na kokóma na esika ya liyangani, bandá kobomba mbongo mpo na transport ya yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘Kumisá ye na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16; Mas. 3:9.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, luká kolya bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká biteni ya papye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo bibongisami mpo na kobwaka biloko ya bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.