Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/04 lok. 6
  • Kebá mpenza na ndenge osalelaka ntango na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kebá mpenza na ndenge osalelaka ntango na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Lolenge ya komisombela ntango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Nasengeli kobɛta masano ya video?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasengeli koyeba nini mpo na masano ya video?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Tósomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 1/04 lok. 6

Kebá mpenza na ndenge osalelaka ntango na yo

1. Mokakatano nini bato nyonso bazali na yango lelo oyo?

1 Lelo oyo, bamasini oyo ezali kosalisa bato ete bálekisaka ntango mingi te na mosala mpe básalaka mingi te ekómi mingi. Atako bongo, ezali komonana ete bato mingi bazali na makambo mingi ya kosala, kasi bazali na ntango mingi te. Ozalaka na mokakatano ya kolanda ntango nyonso programɛ ya makambo ya elimo? Olingaka kozala na ntango mingi mpo na kosakola? Ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso malamu koleka?​—⁠Nz. 90:12; Filp. 1:​9-11.

2, 3. Mikakatano nini baordinatɛrɛ mpe batelefone ezali kobimisa, mpe ndenge nini mokomoko na biso akoki komitalela?

2 Luká koyeba makambo oyo elyaka ntango na yo: Biso nyonso tosengeli kotalela mbala na mbala ndenge oyo tosalelaka ntango na biso. Biblia elendisi biso boye: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi, mpamba te mikolo ezali mabe.” (Ef. 5:​15, 16) Tókanisa naino mikakatano oyo baordinatɛrɛ mpe batelefone ekómi kobimisa. Ezali mabe te kosalela baordinatɛrɛ ná baapareyi mosusu, kasi yango ekoki kokóma motambo soki tozali kokeba mpenza te na ntango oyo tozali kolekisa na yango.​—⁠1 Kol. 7:​29, 31.

3 Mokomoko na biso asengeli komituna: ‘Mokolo na mokolo, nalekisaka ntango mingi nde na Internet mpo na kokoma mpe kotánga mikanda ezangi ntina? Mbala mingi, nasololaka na telefone to nakomelaka bato makambo ezangi ntina na telefone? (1 Tim. 5:13) Nakɔtaka na ba site ndenge na ndenge ya Internet kaka mpo na kokɔta to nalukaka bashɛnɛ ndenge na ndenge na televizyo kaka mpo na koluka? Masano ya video ekómi nde kozwa ntango oyo nayekolaka Liloba ya Nzambe?’ Komipesa na makambo yango ekoki kobebisa elimo na biso kozanga ete tóyeba.​—⁠Mas. 12:⁠11.

4. Mbongwana nini elenge moko asalaki, mpe mpo na nini?

4 Salelá ntango na yo na mayele: Baapareyi ekoki kozwa ntango mpe likebi na biso nyonso. Elenge moko oyo amipesaki mingi na masano ya ordinatɛrɛ alobaki boye: “Mbala mosusu, soki nabɛti lisano moko liboso ya kokende na makita to na mosala ya kosakola, nazalaki kokoka te kotya makanisi na ngai esika moko. Nazalaki ntango nyonso kokanisa ndenge oyo nakosala mpo na kolonga mokakatano moko ya lisano yango ntango nakozonga na ndako. Nazalaki kokoka lisusu te koyekola ngai moko mpe kotánga Biblia mbala na mbala. Esengo nazalaki na yango ya kosalela Nzambe ekómaki kokita mokemoke.” Lokola elenge yango ayaki komona ete asengeli kosala mbongwana na likambo yango, abomaki masano nyonso oyo azalaki na yango na ordinatɛrɛ. Sikoyo, alobi boye: “Ezalaki mpasi mpenza mpo na ngai. Nayaki komona ete namipesaki mingi na masano koleka ndenge oyo nazalaki kokanisa. Kasi, namiyokaki ete nalongi mpenza etumba, mpamba te nayebaki ete nasalaki yango mpo na bolamu na ngai moko.”​—⁠Mat. 5:​29, 30.

5. Ndenge nini tokoki kosomba ntango mpo na makambo ya elimo, mpe matomba nini tokozwa soki tosali bongo?

5 Ntango mosusu ekosɛnga ete yo mpe osala bongo na makambo oyo omoni ete osengeli kobongisa. Okoki kolongola miniti 30 na ntango oyo olekisaka mokolo na mokolo na makambo oyo ezangi ntina? Yango nde baminiti oyo esengeli mpo na kotánga Biblia mobimba na mbula moko. Soki osali yango, okozwa mpenza mbano monene na elimo! (Nz. 19:​7-11; 119:​97-100) Bongisá ntango ya kotánga Biblia, ya kobongisa makita, mpe ya kobima na mosala ya kosakola. (1 Kol. 15:58) Na ndenge yango, eloko moko te ekolya lisusu ntango na yo mpe okokoka ‘kokoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.’​—⁠Ef. 5:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto