Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/96 lok. 1
  • Lolenge ya komisombela ntango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge ya komisombela ntango malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tósomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Kebá mpenza na ndenge osalelaka ntango na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Salelá ntango na yo na mayele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Tótonga Bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 11/96 lok. 1

Lolenge ya komisombela ntango malamu

1 Lokola tozali na mingi ya kosala kati na mosala ya Yehova, tozali na ntango mingi te ya kolekisa mpamba. (1 Kol. 15:58) Toyebi ntina ya koyekola moto na moto mpe kati na libota, ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, ya kobongisa makita mpe ya koyangana na yango, mpe lisusu ya komipesa sanza na sanza kati na mosala ya kosakola. Bakɛngɛli bazali kokokisa mokumba ya babateli mpe bazali kokokisa misala misusu mitali lisangá. Bamoko bazali na mikumba minene ya libota to masɛngisi ya ndenge na ndenge. Ezali likambo ya ntina ete moko na moko kati na biso azala na bokatikati mpe amibongisa malamu mpo na kolónga kosala nyonso wana.

2 Tókokisa liboso makambo ya ntina: Esengeli na biso bososoli mpe koyeba malamu kotalela makambo soki tolingi kolónga ‘komisombela ntango malamu.’ (Ef. 5:15, 16) Tosengeli koyeba nini ezali “makambo maleki ntina” mpe tótya yango na esika ya liboso kati na liste na biso ya makambo ya ntina. (Filp. 1:10) Mobali moko na mwasi na ye balobelaki libota na bango ya Teokrasi na lolenge oyo elandi: “Tosili komipesa bomoi mobimba kati na solo . . . Solo ezali te bobele motindo moko ya bomoi na biso, yango ezali nde bomoi na biso. Makambo nyonso mosusu matongami likoló na yango.” Ezali likambo ya ntina mingi ete tótya losambo ya Yehova mpe mosala na Ye na esika ya liboso kati na bomoi na biso.

3 Tóyeba makambo oyo mazali kobungisela biso ntango: Pɔ́sɔ moko ezali na ngonga 168, mpe esengeli na biso kosalela na mayele nyonso ntango oyo tozali na yango. Mpo na kozala na ntango mingi ya kopesa na misala ya Teokrasi, tosengeli koyeba makambo oyo mazali kobungisela biso ntango mpe koyeisa yango moke. Engebene ankɛtɛ moko oyo esalemaki, Moamerikɛ oyo bomoi na ye ezali ya katikati atalaka televizyó koleka ngonga 38 na pɔ́sɔ moko! Basusu balekisaka ntango mingi na kotánga mikanda ya mokili. Bamoko bakoki komona ete bazali kolekisa ntango mingi koleka na masano, na kozwa mopɛpɛ, na kominanola to liboso ya ordinatere. Mbala mosusu ekosengela na biso kotalela na likebi nyonso lolenge tozali kosalela ntango mokolo na mokolo mpo na komona lolenge nini tokoki kosalela malamu ntango na biso. Soki tozali kosala na mayele, tokolekisa ntango mingi te na misala oyo mizali na ntina mingi te.

4 Tózala na manáka ya malamu: Atako ezalela na biso ezali lolenge nini, biso banso tosengeli komisombela ntango mpo na kokokisa mikano na biso ya elimo. Bamoko bamonaki ete na kobandáká mosala ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mokolo na mokolo, bakokaki kosala makambo mingi. Soki tolekisaka ntango mingi wana tozali kokende na mosala to na kozela basusu, tokoki kosalela ntango yango mpo na kotánga Biblia, kobongisa makita to koyoka bakasɛti oyo la Société asalelá biso. Ezali litomba mpenza mpo na mabota ete mázala na ntango ya sikisiki pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na koyekola elongo. Soki basangani nyonso ya libota bazali kotosa ngonga ya boyekoli ya libota, boye moko na moko akozala na ntango mingi mpo na ye moko.

5 Lokola ntango ezali koleka, tosengeli mpenzampenza koyeba ete “ntango oyo etikali ezali mokuse.” (1 Kol. 7:29) Bomoi na biso etaleli lolenge tozali kosalela ntango wana ya motuya mingi. Tokopambwama soki tozali komisombela ntango malamu mpo na kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.​—Mat. 6:33.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto