Yehova asalisaka baoyo batyelaka ye motema
1 Mpo na bato mingi, kozala na mbongo, kozala mokonzi, mpe kozala na mayele mingi nde esalaka ete moto azala malamu. (Nz. 12:4; 33:16, 17; 49:6) Nzokande, baoyo babangaka Yehova mpe batyelaka ye motema bazali na elikya ya Biblia ete “azali mosungi na bango mpe nguba na bango.” (Nz. 115:11) Tiká tótalela makambo mibale oyo tosengeli komonisa ete totyelaka Yehova motema.
2 Lokola baministre baklisto: Tosengeli kotyelaka Nzambe na biso motema ntango nyonso oyo tozali kokokisa mokumba ya koteya na lisangá to na mosala ya kosakola. Tótalela ndakisa ya Yesu. Atako azalaki Mwana ya Nzambe, atyaki motema te na bwanya na ye moko to na makoki na ye, atyaki nde motema na ye mobimba epai ya Tata na ye ya likoló. (Yoa. 12:49; 14:10) Tozali mpenza na mposa ya kotyela Tata na biso ya likoló motema koleka, ezali bongo te? (Mas. 3:5-7) Kaka lipamboli ya Yehova nde ekoki kosala ete mwa milende na biso ekumisa ye mpe epesa basusu bolamu.—Nz. 127:1, 2.
3 Tomonisaka ete totyelaka Yehova motema ntango tobondelaka ye atambwisa biso mpe asalisa biso na elimo santu na ye. (Nz. 105:4; Luka 11:13) Lisusu, tomonisaka ete totyelaka Nzambe motema ntango toteyaka makambo oyo euti na Liloba na ye, Biblia. Nsango na yango ezali na nguya ya kosimba mitema mpe ya kobongola bomoi ya bato. (Ebe. 4:12) Yehova akumisamaka ntango tozali ‘kosalela bamosusu, lokola bato oyo bazali kotalela kaka makasi oyo Nzambe azali kopesa.’—1 Pet. 4:11.
4 Na mikakatano: Tosengeli mpe koluka lisalisi ya Yehova ntango tozali na mitungisi mpe mikakatano. (Nz. 46:1) Na ndakisa, patrɔ na biso akoki koboya kopesa biso konje mpo tókende na liyangani, to tokoki kozala na likambo moko oyo ezali kotungisa biso na libota. Tokomonisa ete totyelaka Yehova motema soki tozali koyebisa ye likambo yango mbala na mbala na libondeli mpe tozali kotika ete atambwisa biso na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye. (Nz. 62:8; 119:143, 173) Basaleli ya Yehova oyo basalaka bongo bamonaka mpenza lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na bango.—Nz. 37:5; 118:13, 16.
5 Yehova ye moko andimisi biso ete: “Moto apambolama oyo akotalela [Yehova] mpe oyo [Yehova] azali elikia na ye.” (Yil. 17:7) Tiká tómonisa mpenza ete totyelaka Yehova motema na makambo nyonso oyo tozali kosala!—Nz. 146:5.