Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/04 lok. 8
  • Tómonisa elimo ya mobongisi-nzela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa elimo ya mobongisi-nzela
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Sololá ndenge bato basololaka
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 8/04 lok. 8

Tómonisa elimo ya mobongisi-nzela

1. Ndenge nini okoki kolimbola elimo ya mobongisi-nzela?

1 Basakoli nyonso ya Bokonzi, bázala babongisi-nzela to te, bakoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela. Basengeli kosala nyonso mpo na kotosa etinda ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:​19, 20; Mis. 18:⁠5) Bamibanzabanzaka mpo na bato mpe bamipimelaka makambo mosusu mpo na kokokisa mosala na bango. (Mat. 9:36; Mis. 20:24) Basaleli ya Yehova bandimaka kosala nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa bato mosusu báyekola solo. (1 Kol. 9:​19-23) Tiká tótalela ndakisa ya Filipo mopalanganisi ya nsango malamu oyo amonisaki elimo yango.

2. Ndenge nini bankulutu mpe basaleli na misala bakoki komekola molende oyo Filipo azalaki na yango na mosala ya kosakola?

2 Kosakola mpe koteya: Filipo azalaki na mikumba minene mpenza na lisangá ya ekeke ya liboso. (Mis. 6:​1-6) Kasi, azalaki libosoliboso mosakoli ya nsango malamu ya molende. (Mis. 8:40) Ntango bankulutu mpe basaleli na misala bazali kokokisa mikumba na bango, bakoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela soki bazali kopesa ndakisa na oyo etali kosakola na molende. Yango elendisaka mpenza elimo ya lisangá!​—⁠Lom. 12:⁠11.

3. Ndenge nini tokoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela ntango tokutani na komekama?

3 Nsima ya liwa ya Setefano, bayekoli bakutanaki na minyoko makasi oyo ebulunganisaki bomoi na bango. Kasi, Filipo akobaki kosakola mpe asalaki mosala makasi mpo na kokɔtisa mosala ya kosakola epai ya Basamalia. (Mis. 8:​1, 4-6, 12, 14-17) Tokoki kolanda ndakisa na ye soki tozali kokoba koyebisa bato nsango malamu ata na ntango tokutani na komekama mpe soki tozali kosakwela bato nyonso oyo tozali kokutana na bango kozanga kopona bilongi.​—⁠Yoa. 4:⁠9.

4. Ndakisa nini Filipo apesaki na likambo etali koteya?

4 Tokoki komona mpenza ete Filipo ayebaki koteya Liloba ya Nzambe na lisolo oyo elobeli mokube Moetiopia oyo andimaki nsango malamu. (Mis. 8:​26-38) Lolenge mosusu ya komonisa elimo ya mobongisi-nzela ezali koyeba kosalela Biblia malamu mpe ‘kososola uta na Makomami.’ (Mis. 17:​2, 3) Ndenge moko na Filipo, tolukaka koyebisa bato nsango malamu bipai nyonso oyo tokoki kokutana na bango mpe na mabaku nyonso.

5. Nini ekoki kosalisa baboti na kokɔtisa elimo ya mobongisi-nzela na mitema ya bana na bango?

5 Libota mpe lisangá: Na ntembe te, elimo oyo Filipo azalaki na yango mpe ndakisa na ye ebotaki mbuma malamu mpenza epai ya bana na ye ya basi. (Mis. 21:⁠9) Ndenge moko mpe, baboti baklisto oyo bamipesaka mingi na matomba ya Bokonzi, balendisaka bana na bango na kolanda ndakisa na bango. Tata to mama oyo azali kosala nyonso mpo na kosakola nsango malamu, atako alɛmbi to azali na makambo mingi ya kosala, akoki kotika elembo ya malamu mpenza oyo ekoumela libela na motema ya mwana na ye.​—⁠Mas. 22:⁠6.

6. Ndenge nini tokoki komonisa babongisi-nzela ya lisangá na biso ete tosepelaka na bango?

6 Filipo ayambaki Paulo ná Luka, baklisto ya molende oyo bamipesaki mingi na mosala ya Yehova. (Mis. 21:​8, 10) Lelo oyo, ndenge nini tokoki komonisa baklisto ya molende ete tozali kosepela na bango mpe kopesa bango mabɔkɔ? Mbala mosusu, tokoki kondima kobima na babongisi-nzela na ntɔngɔ to na mpokwa ya mokolo moko oyo bato mingi babimaka te na mosala ya kosakola. (Filp. 2:⁠4) Tokoki mpe kobenga bango na ndako mpo na kolekisa ntango elongo na bango. Tiká ete biso nyonso tósala makasi mpo na komonisa elimo ya mobongisi-nzela ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto