Kampanye ya monene mpo na kokabola mwa buku ya sika
1 Lelo oyo, bato mingi bazali komitungisa mpo na makambo mabe oyo ezali kobima na mokili, kasi kaka bato moke nde bayebi ntina oyo mokili ebebi boye, makambo oyo ezali koya, mpe oyo basengeli kosala mpo bábika na mokolo ya kosambisama oyo ezali koya. (Ezek. 9:4) Mpo na kosalisa bato yango báyeba ntina ya makambo oyo ezali kokómela biso lelo oyo, tokosala kampanye ya monene mpo na kokabola mwa buku ya sika, Bókɛngɛlaka!, ekobanda na mwa yambo 18 Ɔkɔtɔbɛ mpe ekosila na mwa lomingo 14 Novɛmbɛ.
2 Tokoki kolakisa mwa buku yango ntango tozali kosakola ndako na ndako, ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki, ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu, to ntango tozali kosakola na bisika oyo bato bazalaka mingi. Nzokande, tosengeli kokabola mwa buku Bókɛngɛlaka! bikabolakabola te. Tokopesa yango na bato oyo bamonisi ete balingi mpenza koyeba oyo Biblia elobi mpo na makambo mabe oyo ezali kobima na mokili lelo oyo. Kasi, baoyo bakosepela mpenza te na nsango malamu, tokoki kopesa bango trakte.
3 Mpo na kobenda likebi ya moto, okoki koloba boye:
◼ “Bato mingi bazali komitungisa mpo na bampasi mpe makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema lelo oyo. [Lobelá likambo moko oyo eyebani na esika bofandi.] Oyebi ete Biblia esakolaki makambo ya ndenge wana? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá vɛrsɛ moko oyo eyokani na likambo oyo olobi, na ndakisa Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:7, 10, 11; 2 Timote 3:1-5.] Biblia ezali komonisa ntina ya makambo oyo ezali kosalema lelo oyo, mpe oyo ekokómela bato na mikolo ezali koya. Olingi koyeba makambo mingi? [Tiká ye apesa eyano. Lakisá ye mwa buku soki asepeli mpenza.] Tozali kotɛka mwa buku oyo te. Soki olingi kopesa likabo mpo na mosala ya kosakola oyo tozali kosala na mokili mobimba, tokosepela na yango mingi.”
4 To okomona malamu kobanda lisolo na maloba oyo:
◼ “Lelo oyo bato mingi bazali komitungisa mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema to mpo na bampasi oyo ezali kokómela bango. Bato mosusu bamitunaka mpo na nini Nzambe apekisaka te ete makambo ya ndenge wana ekómela bato te. Biblia epesi biso elikya ete etikali moke Nzambe akosilisa bampasi nyonso oyo ezali kotungisa bato. Talá makambo kitoko oyo Nzambe akosala mpo na bato. [Tángá Nzembo 37:10-11.] Olingi koyeba makambo mingi? Mpo na kosukisa, salelá maloba oyo tolobelaki liboso.
5 Salá nyonso ozwa nkombo mpe adresi ya moto nyonso oyo akondima kozwa mwa buku yango, mpe bongisá kozongela ye mpo na kosalisa ye asepela na nsango malamu lisusu koleka. Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2004 ekomonisa ndenge tokoki kosala yango. Ntango ozali kosolola na moto mbala ya liboso, soki asepeli mpenza, okoki kobanda koyekola na ye Biblia mbala moko na mwa buku Bókɛngɛlaka! to na mokanda mosusu, lokola mwa buku Azali kosɛnga.
6 Tokokabola mwa buku yango na nsuka ya Likita ya mosala oyo. Ekozala malamu basakoli mpe babongisi-nzela bázwa naino kaka mwa babuku oyo bakokoka kokabola na mikolo ya ebandeli ya kampanye. Tiká ete Yehova apambola mosala yango monene mpo na lokumu na ye mpe mpo na bolamu ya bato ya mitema sembo oyo bazali bipai nyonso.—Nz. 90:17.