Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/04 lok. 1
  • Bazali na mposa ya lisalisi na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali na mposa ya lisalisi na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Basaleli na misala basalaka mosala ya motuya
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Bandeko mibali—Bólona mpo na elimo mpe bóluka kozwa mikumba!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bandeko mibali oyo bozali bilenge, bozali koluka kozwa mikumba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tósalisa bandeko mibali báluka kozwa mikumba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 12/04 lok. 1

Bazali na mposa ya lisalisi na yo

1 “Matɔndi mingi mpo na nyonso oyo bozali kosala mpo na biso. Esalisaka biso mpenza.” Maloba oyo emonisi mpenza botɔndi oyo tozalaka na yango mpo na bankulutu mpe basaleli na misala ya masangá na biso. Lokola ebongiseli ya Nzambe ezali se kokóma monene, ezali ntango nyonso na mposa ya mibali oyo bakɔmɛli mpo na kosala na masangá pene na 100 000 na mokili mobimba. Soki ozali ndeko mobali mpe ozwá batisimo, lisangá ezali na mposa ya lisalisi na yo.

2 “Luká kozwa mikumba”: Okoki kosala nini mpo na kozwa mikumba? (1 Tim. 3:⁠1) Libosoliboso, osengeli kozala ndakisa malamu na makambo nyonso ya bomoi na yo. (1 Tim. 4:12; Tito 2:​6-8; 1 Pet. 5:⁠3) Omipesa mingi na mosala ya kosakola mpe salisá basusu básala mpe bongo. (2 Tim. 4:⁠5) Luká bolamu ya baninga na yo bandimi. (Lom. 12:13) Zalá moyekoli ya molende ya Liloba ya Nzambe, mpe kolisá ‘mayele ya koteya.’ (Tito 1:9; 1 Tim. 4:13) Saláká na molende misala oyo bankulutu bapesi yo. (1 Tim. 3:10) Soki ozali tata ya libota, ‘kambáká ndako na yo moko na ndenge ya malamu mingi.’​—⁠1 Tim. 3:​4, 5, 12.

3 Kozala nkulutu to mosaleli na misala ezali mosala makasi mpe esɛngaka komipimela makambo mosusu. (1 Tim. 5:17) Yango wana, ntango ozali koluka kozwa mikumba, mposa na yo esengeli kozala ya kosalela basusu na komikitisa nyonso. (Mat. 20:​25-28; Yoa. 13:​3-5, 12-17) Kanisá malamumalamu ezaleli ya Timote, mpe luká komekola ye. (Filp. 2:​20-22) Lokola Timote, tiká etamboli na yo ya malamu etinda bandeko bápesa yo mikumba. (Mis. 16:​1, 2) Ntango ozali kolona bizaleli ya elimo oyo esengeli mpo na kokokisa mikumba mosusu, mpe kosalela toli nyonso oyo bakoki kopesa yo mpo na kobongisa lisusu bomoto na yo, “bokoli na yo [ekomonana] polele na miso ya bato nyonso.”​—⁠1 Tim. 4:⁠15.

4 Baboti, bóteya bana na bino báyeba kopesa mabɔkɔ: Bana bakoki koyekola kopesa mabɔkɔ banda bomwana. Bóteya bango bálandaka makita na likebi, básakolaka, mpe bázalaka na etamboli ya malamu na Ndako ya Bokonzi mpe na eteyelo. Bóteya bango básalelaka basusu, na makambo lokola kotya bopɛtɔ na Ndako ya Bokonzi, kosalisa mibange, mpe bongo na bongo. Bósalisa bango báyokaka esengo ya kosalela basusu. (Mis. 20:35) Formasyo ya ndenge wana ekosalisa bango bákóma babongisi-nzela, basaleli na misala mpe bankulutu na mikolo ezali koya.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto